< Emoniseli 19 >

1 Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola: « Aleluya! Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,
Potemem słyszał wielki głos wielkiego ludu na niebie, mówiącego: Halleluja! Zbawienie i chwała, i cześć, i moc Panu, Bogu naszemu.
2 pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »
Bo prawdziwe i sprawiedliwe są sądy jego, iż osądził wszetecznicę onę wielką, która kaziła ziemię wszeteczeństwem swojem i pomścił się krwi sług swoich z ręki jej.
3 Bagangaki na mbala ya mibale: « Aleluya! Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene ezali komata na likolo mpo na libela na libela! » (aiōn g165)
I rzekli po wtóre: Halleluja! A dym jej wstępuje na wieki wieków. (aiōn g165)
4 Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki: « Amen! Aleluya! »
I upadli dwadzieścia i czterej starcy, i czworo zwierząt, a pokłonili się Bogu siedzącemu na stolicy, mówiąc: Amen, Halleluja!
5 Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki: « Bokumisa Nzambe na biso; bino bawumbu na Ye nyonso, bino oyo botosaka Ye, mikolo mpe bana mike! »
Tedy wyszedł głos z stolicy, mówiący: Chwalcie Boga naszego wszyscy słudzy jego i którzy się go boicie, i mali, i wielcy.
6 Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi; ezalaki koganga: « Aleluya! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.
I słyszałem głos jako ludu wielkiego i jako głos wielu wód, i jako głos mocnych gromów, mówiących: Halleluja! iż ujął królestwo Pan Bóg wszechmogący.
7 Tika ete tosepela, totonda na esengo mpe topesa Ye nkembo! Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki. Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa.
Weselmy się i radujmy się, a dajmy mu chwałę; bo przyszło wesele Barankowe, a małżonka jego nagotowała się.
8 Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli ye mpo ete alata yango. » Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu.
I dano jej, aby się oblekła w bisior czysty i świetny; albowiem bisior są usprawiedliwienia świętych.
9 Bongo anjelu alobaki na ngai: « Koma: ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate! › » Alobaki lisusu: « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »
I rzekł mi: Napisz: Błogosławieni, którzy są wezwani na wieczerzę wesela Barankowego. I rzekł mi: Te słowa Boże są prawdziwe.
10 Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai: « Kosala bongo te! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »
I upadłem do nóg jego, abym się mu pokłonił; ale mi rzekł: Patrz, abyś tego nie czynił; bom jest spółsługa twój i braci twoich, którzy mają świadectwo Jezusowe. Bogu się kłaniaj; albowiem świadectwo Jezusowe jest duch proroctwa.
11 Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali: « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.
I widziałem niebo otworzone, a oto koń biały, a tego, który siedział na nim, zwano Wiernym i Prawdziwym, a sądzi w sprawiedliwości i walczy.
12 Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi.
A oczy jego były jako płomień ognia, a na głowie jego wiele koron; i miał imię napisane, którego nikt nie zna, tylko on sam.
13 Alati nzambala bazindisa na makila; kombo na Ye ezali: « Liloba na Nzambe. »
A przyodziany był szatą omoczoną we krwi, a imię jego zowią Słowo Boże.
14 Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto.
A wojska, które są na niebie, szły za nim na koniach białych, obleczone lnem cienkim, białym i czystym.
15 Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
A z ust jego wychodził miecz ostry, aby nim bił narody; albowiem on je rządzić będzie laską żelazną, a on tłoczy prasę wina zapalczywości i gniewu Boga wszechmogącego.
16 Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo: « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »
A ma na szacie i na biodrach swoich imię napisane: Król królów i Pan panów.
17 Bongo namonaki anjelu moko atelemi kati na moyi; azalaki koloba na mongongo makasi epai ya bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi: « Boya, bosangana mpo na feti monene ya Nzambe,
I widziałem jednego Anioła stojącego w słońcu i wołającego głosem wielkim, mówiąc wszystkim ptakom latającym po pośrodku nieba: Chodźcie i zgromadźcie się na wieczerzę wielkiego Boga,
18 mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso: bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. »
Abyście jedli ciała królów i ciała hetmanów, i ciała mocarzy, i ciała koni, i siedzących na nich, i ciała wszystkich wolnych i niewolników, i małych, i wielkich.
19 Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye.
I widziałem bestyję i królów ziemskich, i wojska ich zebrane, aby stoczyli bitwę z siedzącym na koniu i z wojskiem jego.
20 Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale: nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo. (Limnē Pyr g3041 g4442)
Ale pojmana jest bestyja, a z nią fałszywy on prorok, który czynił cuda przed nią, któremi zwodził tych, którzy przyjęli piętno bestyi i którzy się kłaniali obrazowi jej, i obaj wrzuceni są żywo do jeziora ognistego, gorejącego siarką. (Limnē Pyr g3041 g4442)
21 Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.
A drudzy pobici są mieczem tego, który siedział na koniu, wychodzącym z ust jego, a wszystkie ptaki nasycone są ciałami ich.

< Emoniseli 19 >