< Emoniseli 17 >

1 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai: « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa.
I przyszedł jeden z siedmiu Aniołów, którzy mieli siedm czasz, i rzekł do mnie, mówiąc mi: Chodź, okażę ci osądzenie onej wielkiej wszetecznicy, która siedzi nad wodami wielkiemi,
2 Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. »
Z którą wszeteczeństwo płodzili królowie ziemi i upili się winem wszeteczeństwa jej obywatele ziemi.
3 Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi.
I odniósł mię na puszczę w duchu. I widziałem niewiastę siedzącą na szarłatnoczerwonej bestyi, pełnej imion bluźnierstwa, która miała siedm głów i dziesięć rogów.
4 Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete mpe ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo mpe mayaka. Na loboko na ye, asimbaki kopo moko basala na wolo mpe etonda na makambo ya nkele mpe ya bosoto ya kindumba na ye.
A ona niewiasta przyobleczona była w purpurę i w szarłat, i uzłocona złotem i drogim kamieniem, i perłami, mając kubek złoty w ręce swej, pełen obrzydliwości i nieczystości wszeteczeństwa swego.
5 Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali: Babiloni monene, Mama ya Basi ya Ndumba mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.
A na czole jej było imię napisane: Tajemnica, Babilon wielki, matka wszeteczeństw i obrzydliwości ziemi.
6 Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu. Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi.
I widziałem niewiastę onę pijaną krwią świętych i krwią męczenników Jezusowych; a widząc ją, dziwowałem się wielkim podziwieniem.
7 Bongo anjelu alobaki na ngai: « Mpo na nini ozali komitungisa? Nakoyebisa yo mabombami ya mwasi wana mpe ya nyama oyo ememi ye, nyama oyo ezali na mito sambo mpe na maseke zomi.
I rzekł mi Anioł: Czemuż się dziwujesz? Ja tobie powiem tajemnicę tej niewiasty i bestyi, która ją nosi, która ma siedm głów i dziesięć rogów.
8 Nyama oyo omonaki; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu. (Abyssos g12)
Bestyja, którąś widział, była, a nie jest, a ma wystąpić z przepaści, a iść na zginienie; i zadziwią się mieszkający na ziemi, (których imiona nie są napisane w księgach żywota od założenia świata), widząc bestyję, która była, a nie jest, a przecię jest. (Abyssos g12)
9 Makambo oyo ezali penza kosenga mayele oyo bwanya engengisaka mpo na kososola yango. Mito sambo ezali bangomba sambo epai wapi mwasi avandaka.
Tuć jest rozum mający mądrość: Te siedm głów są siedm gór, na których ta niewiasta siedzi.
10 Ezali lisusu bakonzi sambo: mitano kati na bango basila kokweya na bokonzi. Moko azali sik’oyo na bokonzi, mpe mosusu ayei nanu te; kasi tango akoya, akowumela kaka mpo na tango moke.
A królów jest siedm, pięć ich upadło, a jeden jest, inszy jeszcze nie przyszedł, a gdy przyjdzie, na mały czas musi trwać.
11 Bongo nyama oyo, liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Ezali mpe moko kati na bakonzi wana sambo, mpe ezali kokende na libebi na yango.
A bestyja, która była a nie jest, toć jest ten ósmy, a jest z onych siedmiu, a idzie na zginienie.
12 Maseke zomi oyo omonaki ezali bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi te, kasi bakozwa yango mpo na ngonga moko mpe bakosalela yango lisanga na nyama.
A dziesięć rogów, któreś widział, jest dziesięć królów, którzy królestwa jeszcze nie wzięli; ale wezmą moc jako królowie, na jednę godzinę z bestyją.
13 Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko: kosangisa nguya mpe bokonzi na bango mpo na kosalela nyama.
Ci jedną radę mają i moc, i zwierzchność swoję bestyi podadzą.
14 Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. »
Ci z Barankiem walczyć będą, i Baranek ich zwycięży, bo jest Panem panów i królem królów, i którzy są z nim powołani i wybrani, i wierni.
15 Anjelu alobaki na ngai: « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.
I rzekł mi: Wody, któreś widział, gdzie wszetecznica siedzi, są ludzie i zastępy, i narody, i języki.
16 Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.
A dziesięć rogów, któreś widział na bestyi, cić w nienawiści mieć będą wszetecznicę i uczynią ją spustoszoną i nagą, i ciało jej będą jeść, a samą ogniem spalą.
17 Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama.
Albowiem Bóg podał do serc ich, aby czynili wolę jego, a czynili jednomyślnie, i dali królestwo swoje bestyi, ażby się wypełniły słowa Boże.
18 Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. »
A niewiasta, którąś widział, jest miasto ono wielkie, które ma królestwo nad królami ziemi.

< Emoniseli 17 >