< Banzembo 99 >

1 Yawe azali kokonza; tika ete bato balenga! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe; tika ete mabele eningana!
The LORD reigns! Let the peoples tremble. He sits enthroned among the cherubim. Let the earth be moved.
2 Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.
The LORD is great in Zion. He is high above all the peoples.
3 Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama; ezali bule!
Let them praise your great and awesome name. He is Holy!
4 Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.
The King’s strength also loves justice. You establish equity. You execute justice and righteousness in Jacob.
5 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu.
Exalt the LORD our God. Worship at his footstool. He is Holy!
6 Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango.
Moses and Aaron were among his priests, Samuel was among those who call on his name. They called on the LORD, and he answered them.
7 Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango.
He spoke to them in the pillar of cloud. They kept his testimonies, the statute that he gave them.
8 Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango. Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka atako opesaki bango etumbu mpo na misala na bango ya mabe.
You answered them, LORD our God. You are a God who forgave them, although you took vengeance for their doings.
9 Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.
Exalt the LORD, our God. Worship at his holy hill, for the LORD, our God, is holy!

< Banzembo 99 >