< Yobo 1 >

1 Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.
There was a man in the land of Uz, whose name was Job. That man was blameless and upright, and one who feared God, and turned away from evil.
2 Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato;
There were born to him seven sons and three daughters.
3 mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.
His possessions also were seven thousand sheep, three thousand camels, five hundred yoke of oxen, five hundred female donkeys, and a very great household; so that this man was the greatest of all the children of the east.
4 Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango.
His sons went and held a feast in the house of each one on his birthday; and they sent and called for their three sisters to eat and to drink with them.
5 Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango; pamba te azalaki komilobela: « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso.
It was so, when the days of their feasting had run their course, that Job sent and sanctified them, and rose up early in the morning, and offered burnt offerings according to the number of them all. For Job said, “It may be that my sons have sinned, and renounced God in their hearts.” Job did so continually.
6 Mokolo moko, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
Now on the day when God’s sons came to present themselves before the LORD, Satan also came among them.
7 Yawe atunaki Satana: — Owuti wapi? Satana azongiselaki Yawe: — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili.
The LORD said to Satan, “Where have you come from?” Then Satan answered the LORD, and said, “From going back and forth in the earth, and from walking up and down in it.”
8 Yawe alobaki na Satana: — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili: azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.
The LORD said to Satan, “Have you considered my servant, Job? For there is no one like him in the earth, a blameless and an upright man, one who fears God, and turns away from evil.”
9 Satana azongiselaki Yawe: — Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe?
Then Satan answered the LORD, and said, “Does Job fear God for nothing?
10 Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba.
Haven’t you made a hedge around him, and around his house, and around all that he has, on every side? You have blessed the work of his hands, and his substance is increased in the land.
11 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo.
But stretch out your hand now, and touch all that he has, and he will renounce you to your face.”
12 Yawe alobaki na Satana: — Malamu! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye! Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe.
The LORD said to Satan, “Behold, all that he has is in your power. Only on himself don’t stretch out your hand.” So Satan went out from the presence of the LORD.
13 Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,
It fell on a day when his sons and his daughters were eating and drinking wine in their oldest brother’s house,
14 ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye: « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana;
that a messenger came to Job, and said, “The oxen were plowing, and the donkeys feeding beside them,
15 bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
and the Sabeans attacked, and took them away. Yes, they have killed the servants with the edge of the sword, and I alone have escaped to tell you.”
16 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki: « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali! Ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
While he was still speaking, another also came and said, “The fire of God has fallen from the sky, and has burned up the sheep and the servants, and consumed them, and I alone have escaped to tell you.”
17 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki: « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
While he was still speaking, another also came and said, “The Kasdim made three bands, and swept down on the camels, and have taken them away, yes, and killed the servants with the edge of the sword; and I alone have escaped to tell you.”
18 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki: « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso,
While he was still speaking, there came also another, and said, “Your sons and your daughters were eating and drinking wine in their oldest brother’s house,
19 mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki; yango wana nayei kopesa yo sango! »
and behold, there came a great wind from the wilderness, and struck the four corners of the house, and it fell on the young men, and they are dead. I alone have escaped to tell you.”
20 Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki.
Then Job arose, and tore his robe, and shaved his head, and fell down on the ground, and worshiped.
21 Alobaki: « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, mpe nakozonga bolumbu. Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa; tika ete Kombo na Ye ekumisama! »
He said, “Naked I came out of my mother’s womb, and naked will I return there. The LORD gave, and the LORD has taken away. Blessed be the LORD’s name.”
22 Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te.
In all this, Job didn’t sin, nor charge God with wrongdoing.

< Yobo 1 >