< Yoane 2 >

1 Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango.
On the third day a wedding took place at Cana in Galilee. Jesus’ mother was there,
2 Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
and Jesus and His disciples had also been invited to the wedding.
3 Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye: — Bazali lisusu na vino te!
When the wine ran out, Jesus’ mother said to Him, “They have no more wine.”
4 Kasi Yesu azongiselaki ye: — Mwasi, biso na yo likambo nini? Tango na Ngai ekoki nanu te.
“Woman, why does this concern us?” Jesus replied. “My hour has not yet come.”
5 Mama na Ye alobaki na basali: — Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
His mother said to the servants, “Do whatever He tells you.”
6 Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale.
Now six stone water jars had been set there for the Jewish rites of purification. Each could hold from twenty to thirty gallons.
7 Bongo Yesu alobaki na basali: — Botondisa bambeki oyo na mayi. Batondisaki yango meke.
Jesus told the servants, “Fill the jars with water.” So they filled them to the brim.
8 Alobaki lisusu: — Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti. Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.
“Now draw some out,” He said, “and take it to the master of the banquet.” They did so,
9 Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki
and the master of the banquet tasted the water that had been turned into wine. He did not know where it was from, but the servants who had drawn the water knew. Then he called the bridegroom aside
10 mpe alobaki na ye: « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo! »
and said, “Everyone serves the fine wine first, and then the cheap wine after the guests are drunk. But you have saved the fine wine until now!”
11 Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki: esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Jesus performed this, the first of His signs, at Cana in Galilee. He thus revealed His glory, and His disciples believed in Him.
12 Sima na yango, Yesu akendeki elongo na mama na Ye, bandeko na Ye mpe bayekoli na Ye, na Kapernawumi epai wapi basalaki kaka mwa mikolo.
After this, He went down to Capernaum with His mother and brothers and His disciples, and they stayed there a few days.
13 Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi.
When the Jewish Passover was near, Jesus went up to Jerusalem.
14 Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango.
In the temple courts He found men selling cattle, sheep, and doves, and money changers seated at their tables.
15 Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele.
So He made a whip out of cords and drove all from the temple courts, both sheep and cattle. He poured out the coins of the money changers and overturned their tables.
16 Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga: « Bolongola biloko oyo awa! Ezali Ndako ya Tata na Ngai! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando? »
To those selling doves He said, “Get these out of here! How dare you turn My Father’s house into a marketplace!”
17 Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama: « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto! »
His disciples remembered that it is written: “Zeal for Your house will consume Me.”
18 Bayuda balobaki na Yesu: — Likamwisi nini okoki kolakisa biso mpo na kotalisa biso ete ozali na bokonzi ya kosala makambo oyo nyonso?
On account of this, the Jews demanded, “What sign can You show us to prove Your authority to do these things?”
19 Yesu azongisaki: — Bobuka Tempelo oyo, mpe Ngai nakotonga yango lisusu na mikolo misato.
Jesus answered, “Destroy this temple, and in three days I will raise it up again.”
20 Bayuda balobaki lisusu: — Boni, soki esalaki mibu tuku minei na motoba mpo na kotonga lisusu Tempelo oyo, yo okanisi ete okotelemisa yango na mikolo misato?
“This temple took forty-six years to build,” the Jews replied, “and You are going to raise it up in three days?”
21 Nzokande Tempelo oyo Yesu azalaki kolobela, ezalaki nde nzoto na Ye moko.
But Jesus was speaking about the temple of His body.
22 Sima, tango Yesu asekwaki, bayekoli na Ye basosolaki makambo oyo alobaki na bango. Boye bandimaki Makomi mpe maloba oyo Yesu alobaki.
After He was raised from the dead, His disciples remembered that He had said this. Then they believed the Scripture and the word that Jesus had spoken.
23 Wana Yesu azalaki kati na Yelusalemi mpo na feti ya Pasika, bato mingi bandimelaki Kombo na Ye tango bazalaki komona bikamwa oyo azalaki kosala.
While He was in Jerusalem at the Passover Feast, many people saw the signs He was doing and believed in His name.
24 Kasi Yesu amipesaki te epai na bango, pamba te ayebaki bato nyonso.
But Jesus did not entrust Himself to them, for He knew them all.
25 Azalaki ata na posa te ete bayebisa Ye makambo na tina na bato, pamba te ayebaki makambo nyonso oyo ezalaki kati na mitema na bango.
He did not need any testimony about man, for He knew what was in a man.

< Yoane 2 >