< Misala ya Bantoma 1 >

1 Teofile: Kati na buku na ngai ya liboso, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki wuta na ebandeli
In my first book, O Theophilus, I wrote about all that Jesus began to do and to teach,
2 kino na mokolo oyo amemamaki na Likolo, sima na Ye kopesa mitindo, na nzela ya Molimo Mosantu, epai ya bantoma oyo aponaki.
until the day He was taken up to heaven, after giving instructions through the Holy Spirit to the apostles He had chosen.
3 Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.
After His suffering, He presented Himself to them with many convincing proofs that He was alive. He appeared to them over a span of forty days and spoke about the kingdom of God.
4 Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo: « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela.
And while they were gathered together, He commanded them: “Do not leave Jerusalem, but wait for the gift the Father promised, which you have heard Me discuss.
5 Pamba te Yoane abatisaki na mayi; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »
For John baptized with water, but in a few days you will be baptized with the Holy Spirit.”
6 Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye: — Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi epai ya Isalaele?
So when they came together, they asked Him, “Lord, will You at this time restore the kingdom to Israel?”
7 Yesu azongiselaki bango: — Likambo ya koyeba tango to mikolo oyo Tata abongisa, na mokano na Ye moko, etali bino te.
Jesus replied, “It is not for you to know times or seasons that the Father has fixed by His own authority.
8 Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
But you will receive power when the Holy Spirit comes upon you, and you will be My witnesses in Jerusalem, and in all Judea and Samaria, and to the ends of the earth.”
9 Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango.
After He had said this, they watched as He was taken up, and a cloud hid Him from their sight.
10 Mpe wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azali komata, mbala moko bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki:
They were looking intently into the sky as He was going, when suddenly two men dressed in white stood beside them.
11 — Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
“Men of Galilee,” they said, “why do you stand here looking into the sky? This same Jesus, who has been taken from you into heaven, will come back in the same way you have seen Him go into heaven.”
12 Bantoma bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi, na mosika ya bametele pene nkoto moko.
Then they returned to Jerusalem from the Mount of Olives, which is near the city, a Sabbath day’s journey away.
13 Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki: Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo; Jake, mwana mobali ya Alife; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.
When they arrived, they went to the upper room where they were staying: Peter and John, James and Andrew, Philip and Thomas, Bartholomew and Matthew, James son of Alphaeus, Simon the Zealot, and Judas son of James.
14 Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.
With one accord they all continued in prayer, along with the women and Mary the mother of Jesus, and with His brothers.
15 Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale
In those days Peter stood up among the brothers (a gathering of about a hundred and twenty) and said,
16 mpe alobaki na bango: « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu.
“Brothers, the Scripture had to be fulfilled which the Holy Spirit foretold through the mouth of David concerning Judas, who became a guide for those who arrested Jesus.
17 Azalaki moko kati na biso mpe asanganaki elongo na biso kati na lotomo oyo epesamelaki biso. »
He was one of our number and shared in this ministry.”
18 Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki.
(Now with the reward for his wickedness Judas bought a field; there he fell headlong and burst open in the middle, and all his intestines spilled out.
19 Bato nyonso ya Yelusalemi bayokaki sango yango; yango wana bakomaki kobenga elanga yango « Akelidama » oyo elingi koloba, na lokota na bango: Elanga ya makila.
This became known to all who lived in Jerusalem, so they called that field in their own language Akeldama, that is, Field of Blood.)
20 Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo: « Tika ete ndako na ye etikala polele, mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango! » Mpe: « Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye! »
“For it is written in the book of Psalms: ‘May his place be deserted; let there be no one to dwell in it,’ and, ‘May another take his position.’
21 Boye, tosengeli kopona moto moko kati na mibali oyo bazalaki elongo na biso tango nyonso oyo Nkolo Yesu azalaki kotambola na mokili elongo na biso,
Therefore it is necessary to choose one of the men who have accompanied us the whole time the Lord Jesus went in and out among us,
22 kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.
beginning from John’s baptism until the day Jesus was taken up from us. For one of these must become a witness with us of His resurrection.”
23 Bapesaki bakombo ya bato mibale: Jozefi oyo babengaki « Barsabasi » mpe ayebanaki lisusu na kombo Yusitusi, mpe Matiasi.
So they proposed two men: Joseph called Barsabbas (also known as Justus) and Matthias.
24 Bongo basambelaki boye: « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale,
And they prayed, “Lord, You know everyone’s heart. Show us which of these two You have chosen
25 mpo ete akoma ntoma mpe azwa, kati na lotomo oyo ya bontoma, esika oyo Yuda atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongi na ye. »
to take up this ministry and apostleship, which Judas abandoned to go to his rightful place.”
26 Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.
Then they cast lots, and the lot fell to Matthias; so he was added to the eleven apostles.

< Misala ya Bantoma 1 >