< Bagalatia 4 >

1 Tala ndimbola ya makambo oyo nazali koloba: soki mokitani ya libula azali nanu mwana moke, akeseni te na mowumbu, atako ye nde azali nkolo ya biloko nyonso.
Now I say, that the heir, as long as he is a child, differeth in no respect from a bond-servant, though he is lord of all;
2 Akozala na se ya bokonzi ya babokoli mpe ya babateli bomengo kino tango akokokisa mibu oyo tata na ye akataki.
but is under guardians and stewards, until the time appointed by the father.
3 Ezali mpe ndenge moko mpo na biso: wana tozalaki nanu bana mike, tozalaki bawumbu ya makambo oyo etambolisaka mokili.
So also we, when we were children, were in bondage under the rudiments of the world;
4 Kasi tango ngonga oyo Nzambe akataki ekokaki, atindaki Mwana na Ye, oyo abotamaki na mwasi mpe na se ya bokonzi ya Mobeko,
but when the fullness of the time came, God sent forth his Son, born of a woman, born under the Law,
5 mpo na kosikola bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpe mpo na kopesa biso makoki ya kokoma bana na Nzambe.
to redeem those under the Law, that we might be adopted as sons.
6 Mpe mpo ete bozali penza bana, Nzambe atindaki Molimo ya Mwana na Ye kati na mitema na biso, Molimo oyo agangaka: « Aba, » elingi koloba: « Tata! »
And to show that ye are sons, God sent forth the Spirit of his Son into our hearts, crying, Abba, Father!
7 Boye, ozali lisusu mowumbu te, kasi mwana. Mpe mpo ete ozali mwana, Nzambe okomisi yo mokitani ya libula na Ye.
So then thou art no longer a bond-servant, but a son; and if a son, then an heir through God.
8 Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te.
But at that time, indeed, when ye knew not God, ye were in slavery to those who in their nature are not gods;
9 Kasi awa boyebi sik’oyo Nzambe to lokola sik’oyo Nzambe ayebi bino, ndenge nini bozongeli lisusu makambo oyo etambolisaka mokili, makambo oyo ezanga nguya mpe tina? Bolingi lisusu komizongisa na se ya bowumbu na yango?
but now, after having known God, or rather having been known by God, how is it that ye are turning back to the weak and beggarly rudiments to which ye wish to be again in bondage?
10 Bozali kotosa mikolo, basanza, bileko mpe mibu!
Do ye observe days, and months, and times, and years?
11 Ah! Nazali penza kobanga ete pasi oyo namiyokisaki mpo na bino ekende pamba.
I fear for you, lest I may have bestowed upon you labor in vain.
12 Nabondeli bino bandeko na ngai: Bozala lokola ngai, pamba te ngai mpe namikomisaki lokola bino. Bosalaki ngai mabe moko te.
Brethren, I beseech you, become as I am, for I also have become as ye are; ye injured me in nothing.
13 Boyebi malamu ete ezali bokono na ngai nde epesaki ngai libaku ya koteya bino Sango Malamu mpo na mbala ya liboso.
Nay, ye know that it was on account of an infirmity of the flesh that I preached the gospel to you the former time,
14 Atako bongo, botiolaki ngai te mpe boboyaki ngai te mpo na bokono na ngai; nzokande, boyambaki ngai lokola Anjelu na Nzambe, lokola Yesu-Klisto Ye moko.
and my trial which was in my flesh ye did not despise nor spurn; but received me as an angel of God, yea, as Christ Jesus.
15 Esengo na bino ekeyi wapi? Nakoki ata kopesa litatoli oyo na tina na bino: Soki ekokaki kosalema, bolingaki ata kolongola miso na bino mpo na kopesa ngai yango.
How great then was your boasting of happiness! for I bear you witness, that if possible, ye would have plucked out your eyes, and have given them to me.
16 Boni, nakomi sik’oyo monguna na bino mpo ete nazali koloba na bino solo?
So then, have I become your enemy because I tell you the truth?
17 Bato wana balingi bino makasi, kasi makanisi na bango ezali ya malamu te; bazali na posa ya kokabola bino na ngai mpo ete bokangama na bango.
They show a zeal for you, but not in honesty; yea, they wish to exclude you, that ye may be zealous for them.
18 Ezali malamu kozalaka tango nyonso na bolingo eleka ndelo mpo na likambo ya malamu, kasi ezala kaka te tango nazali elongo na bino.
But it is good to be an object of zeal in what is good always, and not only when I am present with you.
19 Bana na ngai, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, nazali lisusu koyoka pasi mpo na bino, kino tango Klisto akosalema kati na bino.
My children, with whom I am again in travail until Christ be formed in you, —
20 Nazali na posa makasi ya kozala sik’oyo elongo na bino mpe koloba na bino na lolenge mosusu, pamba te nayebi lisusu te eloko ya kosala mpo na bino!
I could wish indeed to be present with you now, and to change my tone, for I am in perplexity about you.
21 Bino oyo bolingi kozala na se ya bokonzi ya Mobeko, boyebisa ngai nanu, bososolaka na bino te makambo oyo Mobeko elobaka?
Tell me, ye that desire to be under the Law, do ye not hear the Law?
22 Ekomama kati na yango ete Abrayami azalaki na bana mibali mibale: mwasi mowumbu abotelaki ye mwana moko, mpe mwasi nsomi abotelaki ye mwana moko.
For it is written, that Abraham had two sons; the one by the bondwoman, the other by the freewoman.
23 Mwana oyo mwasi mowumbu abotelaki Abrayami abotamaki na lolenge ya bomoto, kasi mwana oyo mwasi nsomi abotelaki ye abotamaki kolanda elaka ya Nzambe.
But the one by the bondwoman was born after the flesh; while the one by the freewoman was through the promise.
24 Makambo oyo epesami lokola ndakisa: Basi oyo mibale bazali kotalisa boyokani mibale. Moko ewutaki na ngomba Sinai mpe ebotaki bawumbu; yango nde Agari azali kotalisa.
Which things are written allegorically; for these women are two covenants; the one from Mount Sinai, who beareth children into bondage, which is Hagar;
25 Agari azali ngomba Sinai kati na Arabi, akokani na Yelusalemi ya sik’oyo, pamba te ezali kati na bowumbu elongo na bana na yango.
for the word Hagar is Mount Sinai in Arabia; and she corresponds to the Jerusalem now existing, for she is in bondage with her children;
26 Kasi Yelusalemi ya Likolo ezali nsomi, mpe yango nde ezali mama na biso;
but the Jerusalem that is above is free, and she is our mother.
27 pamba te ekomama: « Sepela, mwasi ekomba, yo oyo obotaka te! Sepela makasi mpe ganga na esengo, yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te! Pamba te bana ya mwasi oyo asundolama bakozala ebele koleka bana ya mwasi oyo azali na mobali. »
For it is written: “Rejoice, thou barren that bearest not; break forth and cry, thou that travailest not; for many are the children of the desolate one, rather than of her who hath the husband.”
28 Nzokande bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka, lokola Izaki.
But ye, brethren, as Isaac was, are children of a promise.
29 Kasi ndenge kaka mwana mobali oyo abotamaki na lolenge ya bomoto azalaki na kala konyokola mwana mobali oyo abotamaki na nzela ya nguya ya Molimo, ndenge wana mpe ezali kosalema sik’oyo.
But as at that time he that was born after the flesh persecuted him that was born through the Spirit, so it is now.
30 Nzokande Makomi ezali koloba nini? « Bengana mwasi mowumbu elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu akoki te kokabola libula elongo na mwana mobali ya mwasi nsomi. »
But what saith the scripture? “Cast out the bondwoman and her son; for the son of the bondwoman shall not be heir with the son of the freewoman.”
31 Yango wana bandeko na ngai, biso tozali bana ya mwasi mowumbu te, kasi bana ya mwasi nsomi.
So then, brethren, we are not children of a bondwoman, but of the freewoman.

< Bagalatia 4 >