< Ba-Ebre 11 >

1 Nzokande kondima ezali ndanga ya kozwa biloko oyo tozali kolikya epai ya Nzambe, mpe kobika lokola nde tosili kozwa biloko yango atako tozali komona yango te.
Now faith is assurance of things hoped for, a conviction of things not seen.
2 Ezali mpo na kondima nde Nzambe asepelaki na bato ya kala.
For by it the elders obtained a good report.
3 Ezali na kondima nde tososolaka ete mokili esalemaki na nzela ya Liloba na Nzambe, mpe ete biloko oyo emonanaka esalemaki na nzela ya biloko oyo emonanaka te. (aiōn g165)
Through faith we perceive that the worlds were framed by the word of God, so that that which is seen hath not been made out of things which appear. (aiōn g165)
4 Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.
By faith Abel offered to God a more excellent sacrifice than Cain, through which he received testimony that he was righteous, God testifying of his gifts; and by it though dead he yet speaketh.
5 Mpo na kondima, Enoki amemamaki kino epai ya Nzambe. Boye, atikalaki komona kufa te. Bamonaki ye lisusu te, pamba te Nzambe azwaki ye. Liboso na Enoki konetolama, Makomi etatolaki na tina na ye ete asepelisaki Nzambe.
By faith Enoch was translated, that he should not see death; and he was not found, because God translated him; for before his translation he had the testimony that he pleased God.
6 Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.
But without faith it is impossible to please him; for he that cometh to God must believe that he is, and that he is a rewarder of those who diligently seek him.
7 Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.
By faith Noah, being warned by God of things not yet seen, moved with fear, prepared an ark for the saving of his house; by which he condemned the world, and became heir of the righteousness which is according to faith.
8 Mpo na kondima, Abrayami atosaki Nzambe oyo abengaki ye mpe atindaki ye kokende na mokili oyo asengelaki kozwa na sima lokola libula. Atosaki mpe akendeki atako ayebaki te epai azalaki kokende.
By faith Abraham, when called, obeyed to go forth to a place which he was afterward to receive for an inheritance, and went forth, not knowing whither he was going.
9 Mpo na kondima, avandaki lokola mopaya kati na mokili oyo Nzambe alakaki ye; azalaki kovanda na bandako ya kapo lokola Izaki mpe Jakobi oyo mpe bazwaki elaka ya ndenge moko na ye.
By faith he sojourned in the land of the promise, as in a foreign country, dwelling in tents with Isaac and Jacob, the heirs with him of the same promise;
10 Pamba te Abrayami azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko oyo ebukanaka te, engumba oyo Ye moko Nzambe azali Mobongisi mpe Motongi na yango.
for he was looking for the city which hath foundations, whose maker and builder is God.
11 Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.
Through faith Sarah herself also received power to conceive, even when she was past age, because she accounted him faithful who had promised.
12 Yango wana, wuta na moto oyo akomaki mpaka mpe pene ya kokufa, bato babotamaki ebele penza lokola minzoto ya likolo mpe lokola zelo ya libongo ya ebale, oyo bakoki kutu kotanga te.
Wherefore there sprang even from one, and him become as dead, a race like the stars of heaven in multitude, and like the sand by the seashore which cannot be numbered.
13 Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.
These all died in faith, not having received the promised blessings, but having seen them from afar, and greeted them, and having professed that they were strangers and sojourners on the earth.
14 Bato oyo balobaka ete bazali bapaya mpe baleki nzela kati na mokili batalisaka polele ete bazali koluka mokili na bango.
For they who say such things show plainly that they are seeking a country.
15 Mpe soki bakanisaki mokili oyo batikaki, mbele balingaki kozonga lisusu kuna.
And if indeed they had been mindful of that from which they came out, they would have had opportunity to return;
16 Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.
but now they desire a better country, that is, a heavenly. Wherefore God is not ashamed to be called their God; for he prepared for them a city.
17 Mpo na kondima, Abrayami akabaki Izaki lokola mbeka tango Nzambe amekaki ye motema; amilengelaki mpo na kokaba mwana na ye wana kaka moko, atako azalaki na elaka.
By faith Abraham, when tried, offered up Isaac, and he who had received the promises was offering up his only-begotten son,
18 Nzambe alobaki na ye: « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »
he to whom it was said, “From Isaac shall thine offspring be reckoned;”
19 Abrayami azalaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kosekwisa Izaki longwa na bakufi, yango wana Nzambe azongiselaki ye mwana na ye: yango ezalaki kaka elilingi.
accounting that God is able even to raise from the dead; whence also he did figuratively receive him back.
20 Mpo na kondima, Izaki apambolaki Jakobi mpe Ezawu mpo na lolenge ya bomoi oyo basengelaki kobika na mikolo oyo esengelaki koya.
By faith Isaac blessed Jacob and Esau even concerning things to come.
21 Mpo na kondima, wana Jakobi akomaki pene ya kokufa, apambolaki mwana moko na moko ya Jozefi mpe agumbamaki na koyekamela songe ya lingenda.
By faith Jacob, when dying, blessed each of the sons of Joseph; and worshipped, leaning upon the top of his staff.
22 Mpo na kondima, wana Jozefi akomaki na suka ya bomoi na ye, asakolaki kobima ya bana ya Isalaele longwa na Ejipito mpe apesaki mitindo na tina na mikuwa na ye.
By faith Joseph, when dying, made mention of the departure of the sons of Israel, and gave directions concerning his bones.
23 Mpo na kondima, baboti ya Moyize babombaki mwana na bango, Moyize, sanza misato sima na mbotama na ye, pamba te bamonaki ete azali kitoko mingi mpe babangaki te mobeko ya mokonzi.
By faith Moses, when born, was hidden three months by his parents, because they saw that the child was fair and they feared not the king's commandment.
24 Mpo na kondima, wana Moyize akomaki mokolo, aboyaki ete babenga ye « mwana mobali ya mwana mwasi ya Faraon. »
By faith Moses, when he was come to years, refused to be called son of Pharaoh's daughter,
25 Aponaki komona pasi elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela mwa tango moke na bomoi ya masumu;
choosing rather to suffer affliction with the people of God, than to enjoy the pleasures of sin for a season;
26 pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.
esteeming the reproach of Christ greater riches than the treasures of Egypt; for he looked to the recompense of reward.
27 Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.
By faith he forsook Egypt, not fearing the wrath of the king; for he endured as seeing him who is invisible.
28 Mpo na kondima, asepelaki feti ya Pasika mpe apesaki mitindo ete bapakola makila na bikuke mpo ete anjelu mobomi aboma te bana mibali ya liboso ya bana ya Isalaele.
Through faith he kept the passover, and the sprinkling of the blood, that he who destroyed the first-born might not touch them.
29 Mpo na kondima, bato ya Isalaele bakatisaki ebale monene ya Barozo lokola nde bazali kotambola na mabele ya kokawuka; kasi tango bato ya Ejipito bamekaki kosala lokola bango, bazindaki.
By faith they passed through the Red Sea as through dry land; which the Egyptians attempted and were swallowed up.
30 Mpo na kondima, bamir ya Jeriko ekweyaki tango bana Isalaele batambolaki zingazinga na yango mikolo sambo.
By faith the walls of Jericho fell down, after they had been encompassed for seven days.
31 Mpo na kondima, Raabi, mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te, pamba te ayambaki banongi na boboto.
By faith Rahab the harlot did not perish with those who disobeyed, after having received the spies with peace.
32 Bongo naloba lisusu nini? Pamba te nakozanga tango soki nabandi koloba na tina na Jedeon, Baraki, Samison, Jefite, Davidi, Samuele mpe basakoli.
And what shall I say more? For the time would fail me to tell of Gideon, of Barak, and Samson, and Jephthah, of David and Samuel, and the prophets;
33 Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango; bakangaki ata minoko ya bankosi,
who through faith subdued kingdoms, wrought righteousness, obtained promised blessings, stopped the mouths of lions,
34 balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.
quenched the power of fire, escaped the edge of the sword, out of weakness were made strong, became mighty in war, put to flight the armies of the aliens.
35 Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.
Women received back their dead by a resurrection; but others were tortured, not accepting deliverance, that they might obtain a better resurrection;
36 Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko;
and others had trial of mockings and scourgings, and also of bonds and imprisonment;
37 bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi:
they were stoned, they were sawn asunder, were tempted, were slain with the sword; they went about in sheep-skins and goat-skins, being destitute, afflicted, tormented,
38 ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele.
of whom the world was not worthy; they wandered in deserts and mountains, and caves and the clefts of the earth.
39 Kati na bango nyonso wana, atako Nzambe asepelaki na bango mpo na kondima na bango, moko te azwaki biloko oyo Nzambe alakaki bango.
And these all, having obtained a good report through faith, received not the promised blessing,
40 Nzambe asalaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso, pamba te alingaki ete bakoma bato ya kokoka nzela moko na biso.
God having provided for us some better thing, that they might not be made perfect without us.

< Ba-Ebre 11 >