< Ezekieli 19 >

1 « Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba:
خداوند فرمود که برای رهبران اسرائیل این مرثیه را بخوانم:
2 ‹ Mama na yo azalaki nani? Nkosi ya mwasi kati na bankosi! Ezalaki kovanda kati na bana na yango mpe kobokola bana yango.
«مادر تو که بود؟ او ماده شیری بود که فرزندانش را میان شیران ژیان بزرگ می‌کرد!
3 Ekolisaki moko kati na bana na yango, mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi. Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
او یکی از بچه‌های خود را تربیت کرد تا شیری ژیان گردد. آن شیربچه شکار کردن را آموخت و آدمخوار شد.
4 Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu; bakangaki yango bibende na zolo mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito.
وقتی خبر او به گوش قومها رسید، آنها شکارچیان خود را فرستادند و او را در دام انداختند و به زنجیر کشیده، به مصر بردند.
5 Tango mama ya nkosi yango emonaki ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela mpe elikya na yango esili, ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango, ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi.
«وقتی مادرش از او قطع امید کرد، یکی دیگر از بچه‌های خود را گرفت و او را تربیت نمود تا شیری نیرومند گردد.
6 Ekomaki konguluma kati na bankosi, pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi. Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato.
وقتی او بزرگ شد، شکار کردن را آموخت و آدمخوار شد و رهبر شیران گردید.
7 Ekweyisaki bandako na bango ya makasi mpe ebebisaki bingumba na bango. Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna bazalaki kotondisama na somo.
او کاخها را خراب و شهرها را ویران کرد. مزرعه‌ها را بایر نمود و محصولاتشان را از بین برد. مردم همه از شنیدن غرش او، به خود می‌لرزیدند!
8 Bongo bato ya bituka ya zingazinga, longwa na bikolo na bango, bayaki kotelemela yango, batielaki yango mitambo na bango mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango.
پس قومهای جهان از هر سو بر او هجوم آورده، او را به دام انداختند و اسیرش کردند.
9 Bakangaki yango minyololo, bakotisaki yango kati na ndako ya banyama, bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni. Babwakaki yango na boloko mpo ete mongongo ya koganga na yango eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te.
سپس او را به زنجیر کشیدند و در قفس گذاشتند و به حضور پادشاه بابِل بردند. در آنجا او را تحت مراقبت نگه داشتند تا بار دیگر غرشش در کوههای اسرائیل شنیده نشود.
10 Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele.
«مادر تو همچون درخت انگوری بود که در کنار نهر آب، در اثر آب فراوان، همیشه تر و تازه و پر شاخ و برگ بود.
11 Bitape na yango ezalaki makasi, ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi, ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu; eyebanaki makasi mpo na molayi na yango mpe mpo na ebele ya makasa na yango.
شاخه‌های قوی و محکم آن برای عصای سلاطین مناسب بود. آن درخت از درختان دیگر بلندتر گردید به حدی که از دور جلب توجه می‌کرد.
12 Kasi bapikolaki yango na kanda mpe babwakaki yango na mabele. Mopepe ya este ekawusaki yango, ekweyisaki mbuma na yango, ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi mpe moto etumbaki yango.
اما دستانی خشمگین، آن درخت را ریشه‌کن کرده، بر زمین انداخت. باد شرقی شاخه‌های نیرومندش را شکست و خشک کرد و آتش، آنها را سوزاند.
13 Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe, mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi.
اکنون آن درخت در بیابان کاشته شده است، در زمینی خشک و بی‌آب!
14 Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango mpe etumbi mbuma na yango; ata etape moko te ya makasi etikalaki mpo na kosala lingenda ya bokonzi. › Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. »
از درون می‌پوسد و میوه‌اش از بین می‌رود، و از آن یک شاخه محکم نیز برای عصای سلاطین باقی نمی‌ماند.» این یک مرثیه است و بارها سروده شده است!

< Ezekieli 19 >