Preface
Read
+
Publisher
Nainoia, Inc.
PO Box 462, Bellefonte, PA 16823
(814) 470-8028
Nainoia Inc, Publisher
LinkedIn/NAINOIA-INC
Third Party Publisher Resources
Request Custom Formatted Verses
Please contact us below
Submit your proposed corrections
I understand that the Aionian Bible republishes public domain and Creative Commons Bible texts and that volunteers may be needed to present the original text accurately. I also understand that apocryphal text is removed and most variant verse numbering is mapped to the English standard. I have entered my corrections under the verse(s) below. Proposed corrections to the Lingala Bible, Ezekiel Chapter 19 https://www.AionianBible.org/Bibles/Lingala---Lingala-Bible/Ezekiel/19 1) « Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba: 2) ‹ Mama na yo azalaki nani? Nkosi ya mwasi kati na bankosi! Ezalaki kovanda kati na bana na yango mpe kobokola bana yango. 3) Ekolisaki moko kati na bana na yango, mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi. Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato. 4) Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu; bakangaki yango bibende na zolo mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito. 5) Tango mama ya nkosi yango emonaki ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela mpe elikya na yango esili, ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango, ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi. 6) Ekomaki konguluma kati na bankosi, pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi. Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato. 7) Ekweyisaki bandako na bango ya makasi mpe ebebisaki bingumba na bango. Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna bazalaki kotondisama na somo. 8) Bongo bato ya bituka ya zingazinga, longwa na bikolo na bango, bayaki kotelemela yango, batielaki yango mitambo na bango mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango. 9) Bakangaki yango minyololo, bakotisaki yango kati na ndako ya banyama, bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni. Babwakaki yango na boloko mpo ete mongongo ya koganga na yango eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te. 10) Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino kati na elanga na yo ya vino, oyo elonama pembeni ya mayi, ezalaki kobota bambuma ebele, ezalaki na bitape ebele mpo ete mayi mpe ezalaki ebele. 11) Bitape na yango ezalaki makasi, ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi, ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu; eyebanaki makasi mpo na molayi na yango mpe mpo na ebele ya makasa na yango. 12) Kasi bapikolaki yango na kanda mpe babwakaki yango na mabele. Mopepe ya este ekawusaki yango, ekweyisaki mbuma na yango, ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi mpe moto etumbaki yango. 13) Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe, mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi. 14) Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango mpe etumbi mbuma na yango; ata etape moko te ya makasi etikalaki mpo na kosala lingenda ya bokonzi. › Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. » Additional comments?
Refresh Captcha
The world's first Holy Bible un-translation!