< 2 Bakolinto 12 >

1 Boni, nasengeli komikumisa? Te, ezali na tina te! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto, mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai.
Glorying must be, but it is not profitable: so I proceed to visions and revelations of our Lord.
2 Nayebi moto moko kati na Klisto, oyo, wuta mibu zomi na minei, amemamaki kino na likolo ya misato: nayebi te soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, kasi Nzambe ayebi.
I knew a man in the Messiah fourteen years ago, (but whether in a body, or whether out of a body, I know not; God knoweth: ) who was caught up to the third region of heaven.
3 Nzokande, ezala soki ezalaki kati na nzoto na ye to mpe kati na nzoto na ye te, Nzambe ayebi yango; kasi ngai nayebi kaka ete moto yango
And I knew this same man; (but whether in a body, or out of a body, I know not; God knoweth; )
4 amemamaki na paradizo mpe ayokaki maloba oyo moto akoki kolimbola te, makambo oyo moto azali na ndingisa te ya koloba.
and he was caught up to Paradise, and heard ineffable words, which it is not permitted a man to utter.
5 Nakomikumisa solo na tina na moto ya ndenge wana, kasi na tina na ngai moko te, longola kaka na tina na bolembu na ngai.
Of him I will glory: but of myself I will not glory, except in my infirmities.
6 Nzokande, soki nalingaki komikumisa, nalingaki kozala zoba te, pamba te nalingaki koloba kaka bosolo; kasi naboyi kosala yango, noki te bakopesa ngai lokumu koleka oyo bato bamonaka kati na ngai to koleka sango oyo bayokaka na tina na ngai.
Yet if I were disposed to glory, I should not be without reason; for I declare the truth. But I refrain, lest any one should think of me, beyond what he seeth in me and heareth from me.
7 Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.
And, that I might not be uplifted by the excellency of the revelations, there was imparted to me a thorn in my flesh, the angel of Satan, to buffet me, that I might not be uplifted.
8 Mpo na yango, nabondelaki Nkolo mbala misato mpo ete nzube yango elongwa na nzoto na ngai.
Respecting this, I thrice besought my Lord, that it might depart from me.
9 Kasi azongiselaki ngai: « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
And he said to me, My grace is sufficient for thee; for my power is perfected in weakness. Gladly, therefore, will I glory in my infirmities, that the power of the Messiah may rest upon me.
10 Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.
Therefore I have pleasure in infirmities, in reproach, in afflictions, in persecutions, in distresses, which are for the Messiah's sake: for when I am weak, then am I strong.
11 Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.
Behold, I have become foolish in my glorying, for ye compelled me. For ye ought to bear witness for me; because I was inferior in nothing to those legates who most excel, although I was nothing.
12 Bilembo oyo elakisaka ete nazali ntoma emonisamaki kati na bino: molende, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa.
I wrought among you the signs of the legates, with all patience; and in prodigies, and in wonders, and in mighty deeds.
13 Eloko nini penza bino bozwaki te koleka Mangomba mosusu, longola kaka kozanga komemisa bino mokumba na ngai? Boye, bolimbisa ngai mpo na mabe yango!
For in what fell ye short of the other churches; except in this, that I was not burdensome to you? Forgive me this fault.
14 Sik’oyo, nasali mabongisi ya koya kotala bino mpo na mbala ya misato; mpe nakomemisa bino mokumba na ngai te, pamba te nazali koluka biloko na bino te, kasi nazali nde koluka bino moko. Kobomba biloko mpo na baboti ezali likambo ya bana na bango te, kasi ezali baboti nde basengeli kobomba biloko mpo na bana na bango.
Behold, this third time I am ready to come to you, and I will not burden you; for I seek not yours, but you: for children ought not to lay up treasures for the parents, but the parents for their children.
15 Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te?
And cheerfully will I both pay my expenses, and also give myself for your souls; although the more I love you, the less ye love me.
16 Atako nazalaki mokumba te epai na bino, kasi bato mosusu bazalaki koloba ete nazali moto ya mayele mabe, natielaki bino motambo.
But perhaps, though I was not burdensome to you, yet, like a cunning man, I filched from you by craftiness!
17 Boni, kati na bato oyo natindaki epai na bino, ezali na moko oyo natindaki mpo na kozwa bino biloko na mayele mabe?
Was it by the hand of some other person whom I sent to you, that I pilfered from you?
18 Nasengaki na Tito ete aya epai na bino, mpe natindaki elongo na ye ndeko na biso. Boni, Tito azwaki biloko na bino na mayele mabe? Tozalaki na ye likanisi moko te? Tazalaki kosala na ye ndenge moko te?
I requested Titus, and with him I sent the brethren: did Titus pilfer any thing from you? Did we not walk in one spirit, and in the same steps?
19 Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino? Te, balingami na ngai! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
Do ye again suppose, that we would apologize to you? Before God, in the Messiah we speak: and all these things, my beloved, are for the sake of your edification.
20 Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.
For I fear, lest I should come to you and not find you such as I would wish; and lest I also should be found by you, such as ye would not wish; lest there should be contention, and envying, and anger, and obstinacy, and slandering, and murmuring, and insolence, and commotion;
21 Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.
lest, when I come to you, my God should humble me; and I should mourn over many, who have sinned, and have not repented of the impurity, the whoredom, and the lasciviousness, which they have committed.

< 2 Bakolinto 12 >