< 요한계시록 18 >

1 이 일 후에 다른 천사가 하늘에서 내려오는 것을 보니 큰 권세를 가졌는데 그의 영광으로 땅이 환하여지더라
Sima na makambo wana, namonaki anjelu mosusu kokita wuta na Lola; azalaki na bokonzi monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili.
2 힘센 음성으로 외쳐 가로되 `무너졌도다 무너졌도다 큰 성 바벨론이여 귀신의 처소와 각종 더러운 영의 모이는 곳과 각종 더럽고 가증한 새의 모이는 곳이 되었도다
Agangaki na mongongo makasi: « Ekweyi! Ekweyi! Babiloni monene ekweyi penza! Ekomi ndako ya milimo mabe, ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele.
3 그 음행의 진노의 포도주를 인하여 만국이 무너졌으며 또 땅의 왕들이 그로 더불어 음행하였으며 땅의 상고들도 그 사치의 세력을 인하여 치부하였도다' 하더라
Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. »
4 또 내가 들으니 하늘로서 다른 음성이 나서 가로되 `내 백성아 거기서 나와 그의 죄에 참여하지 말고 그의 받을 재앙들을 받지 말라
Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo: « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango.
5 그 죄는 하늘에 사무쳤으며 하나님은 그의 불의한 일을 기억하신지라
Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe.
6 그가 준 그대로 그에게 주고 그의 행위대로 갑절을 갚아주고 그의 섞은 잔에도 갑절이나 섞어 그에게 주라
Bosala yango ndenge kaka yango esalaki bato mosusu, bozongisela yango mbala mibale mabe oyo esalaki bino. Kati na kopo oyo ezalaki kosalela mpo na komelisa bamosusu masanga, botia masanga oyo ezali makasi mbala mibale koleka.
7 그가 어떻게 자기를 영화롭게 하였으며 사치하였든지 그만큼 고난과 애통으로 갚아 주라 그가 마음에 말하기를 나는 여황으로 앉은 자요 과부가 아니라 결단코 애통을 당하지 아니하리라 하니
Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango: ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›
8 그러므로 하루 동안에 그 재앙들이 이르리니 곧 사망과 애통과 흉년이라 그가 또한 불에 살라지리니 그를 심판하신 주 하나님은 강하신 자이심이니라
Yango wana, bitumbu nyonso ekokweyela yango na mokolo moko: kufa, matanga mpe nzala. Ekozikisama na moto, pamba te Nzambe oyo apesi yango etumbu azali Nkolo-Na-Nguya.
9 그와 함께 음행하고 사치하던 땅의 왕들이 그 불붙는 연기를 보고 위하여 울고 가슴을 치며
Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango.
10 그 고난을 무서워하여 멀리 서서 가로되 화 있도다, 화 있도다 큰 성 견고한 성 바벨론이여 일시간에 네 심판이 이르렀다' 하리로다
Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga: ‹ Mawa! Mawa na yo, engumba monene! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba! ›
11 땅의 상고들이 그를 위하여 울고 애통하는 것은 다시 그 상품을 사는 자가 없음이라
Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga na tina na yango, pamba te moko te akosomba lisusu biloko na yango:
12 그 상품은 금과 은과 보석과 진주와 세마포와 자주 옷감과 비단과 붉은 옷감이요 각종 향목과 각종 상아 기명이요 값진 나무와 진유와 철과 옥석으로 만든 각종 기명이요
wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane ya pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete na bango ya solo kitoko, biloko na bango oyo basala na pembe ya nzoko, biloko nyonso oyo basala na banzete ya talo, na bronze, na bibende mpe na mabanga kitoko oyo babengaka marbre;
13 계피와 향료와 향과 향유와 유향과 포도주와 감람유와 고운 밀가루와 밀과 소와 양과 말과 수레와 종들과 사람의 영혼들이라
eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato.
14 바벨론아 네 영혼의 탐하던 과실이 네게서 떠났으며 맛있는 것들과 빛난 것들이 다 없어졌으니 사람들이 결코 이것들을 다시 보지 못하리로다
Bakoloba: ‹ Biloko oyo ozalaki kolinga mingi ekimi yo mosika; biloko nyonso oyo ezalaki kosala lolendo mpe lofundu na yo ebebi, ekotikala kozwama lisusu te! ›
15 바벨론을 인하여 치부한 이 상품의 상고들이 그 고난을 무서워하여 멀리 서서 울고 애통하여
Bato ya mombongo oyo bamonaki bomengo komata mpo ete bazalaki kotekela engumba yango biloko na bango, bakotelema na mosika mpo na somo ya pasi oyo ekokweyela yango. Bakolela mpe bakosala matanga.
16 가로되 `화 있도다 화 있도다 큰 성이여 세마포와 자주와 붉은 옷을 입고 금과 보석과 진주로 꾸민 것인데
Bakoloba: ‹ Mawa! Mawa na yo, engumba monene, yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka!
17 그러한 부가 일시간에 망하였도다 각 선장과 각처를 다니는 선객들과 선인들과 바다에서 일하는 자들이 멀리 서서
Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili! › Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika.
18 그 불붙는 연기를 보고 외쳐 가로되 이 큰 성과 같은 성이 어디 있느뇨' 하며
Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga: ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo? ›
19 티끌을 자기 머리에 뿌리고 울고 애통하여 외쳐 가로되 `화 있도다 화 있도다 이 큰 성이여 바다에서 배 부리는 모든 자들이 너의 보배로운 상품을 인하여 치부하였더니 일시간에 망하였도다
Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi: ‹ Mawa! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo! Na ngonga moko kaka, obebisami! ›
20 하늘과 성도들과 사도들과 선지자들아 그를 인하여 즐거워하라 하나님이 너희를 신원하시는 심판을 그에게 하셨음이라' 하더라
Likolo, sepela na libebi na yango! Bino mpe basantu, bosepela! Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola! Pamba te Nzambe alongisi bino awa akateli yango etumbu. »
21 이에 한 힘센 천사가 큰 맷돌 같은 돌을 들어 바다에 던져 가로되 큰 성 바벨론이 이같이 몹시 떨어져 결코 다시 보이지 아니하리로다
Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki: « Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana, kaka na makasi moko wana, mpe ekomonana lisusu te.
22 또 거문고 타는 자와 풍류하는 자와 퉁소 부는 자와 나팔 부는 자들의 소리가 결코 다시 네 가운데서 들리지 아니하고 물론 어떠한 세공업자든지 결코 다시 네 가운데서 보이지 아니하고 또 맷돌 소리가 다시 네 가운데서 들리지 아니하고
Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi, ya babeti piololo mpe babeti kelelo, ekoyokana lisusu te kati na yo. Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge bakomonana lisusu te kati na yo. Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble ekoyokana lisusu te kati na yo.
23 등불 빛이 결코 다시 네 가운데서 비취지 아니하고 신랑과 신부의 음성이 결코 다시 네 가운데서 들리지 아니하리로다 너의 상고들은 땅의 왕족들이라 네 복술을 인하여 만국이 미혹되었도다
Mwinda ekopela lisusu te kati na yo, mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana ekoyokana lisusu te kati na yo. Makambo wana nyonso ekosalema, pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili. Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo.
24 선지자들과 성도들과 및 땅 위에서 죽임을 당한 모든 자의 피가 이 성중에서 보였느니라 하더라
Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli, ya basantu mpe ya bato nyonso oyo babomamaki na mokili. »

< 요한계시록 18 >