< 유다서 1 >
1 예수 그리스도의 종이요 야고보의 형제인 유다는 부르심을 입은 자 곧 하나님 아버지 안에서 사랑을 얻고 예수 그리스도를 위하여 지키심을 입은 자들에게 편지하노라
Ngai Jide, mowumbu ya Yesu-Klisto mpe ndeko ya Jake; Epai ya bato oyo Nzambe abenga, ba-oyo Nzambe Tata alingaka, mpe ba-oyo babatelami mpo na Yesu-Klisto:
2 긍휼과 평강과 사랑이 너희에게 더욱 많을지어다!
Tika ete mawa, kimia mpe bolingo efuluka kati na bino!
3 사랑하는 자들아 내가 우리의 일반으로 얻은 구원을 들어 너희에게 편지하려는 뜻이 간절하던 차에 성도에게 단번에 주신 믿음의 도를 위하여 힘써 싸우라는 편지로 너희를 권하여야 할 필요를 느꼈노니
Balingami na ngai, nazalaki na posa makasi ya kokomela bino na tina na lobiko oyo tozali na yango na lisanga. Nazwaki mokumba ya kokomela bino mpo na kolendisa bino ete bobunda mpo na kondima oyo Nzambe apesaki, mbala moko mpo na libela, epai ya basantu.
4 이는 가만히 들어온 사람 몇이 있음이라 저희는 옛적부터 이 판결을 받기로 미리 기록된 자니 경건치 아니하여 우리 하나님의 은혜를 도리어 색욕거리로 바꾸고 홀로 하나이신 주재 곧 우리 주 예수 그리스도를 부인하는 자니라
Pamba te ezali na bato mosusu oyo basili kokota kati na bino na mayele mabe, ba-oyo etumbu na bango ekomama wuta kala: batosaka makambo ya Nzambe te, bakomisaka ngolu ya Nzambe na biso lokola nzela ya kosala makambo na bango ya soni, mpe bawanganaka Yesu-Klisto, Mokonzi kaka moko mpe Nkolo na biso.
5 너희가 본래 범사를 알았으나 내가 너희로 다시 생각나게 하고자 하노라 주께서 백성을 애굽에서 구원하여 내시고 후에 믿지 아니하는 자들을 멸하셨으며
Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.
6 또 자기 지위를 지키지 아니하고 자기 처소를 떠난 천사들을 큰 날의 심판까지 영원한 결박으로 흑암에 가두셨으며 (aïdios )
Nzambe akangaki mpe na minyololo ya seko, kati na molili mpo na kosambisama ya mokolo monene, ba-anjelu oyo basepelaki te na evandelo oyo Nzambe apesaki bango mpe batikaki yango. (aïdios )
7 소돔과 고모라와 그 이웃 도시들도 저희와 같은 모양으로 간음을 행하며 다른 색을 따라 가다가 영원한 불의 형벌을 받음으로 거울이 되었느니라 (aiōnios )
Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni: basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko. (aiōnios )
8 그러한데 꿈꾸는 이 사람들도 그와 같이 육체를 더럽히며 권위를 업신여기며 영광을 훼방하는도다
Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana: makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.
9 천사장 미가엘이 모세의 시체에 대하여 마귀와 다투어 변론할 때에 감히 훼방하는 판결을 쓰지 못하고 다만 말하되 주께서 너를 꾸짖으시기를 원하노라 하였거늘
Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni; kasi alobaki kaka: « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu! »
10 이 사람들은 무엇이든지 그 알지 못하는 것을 훼방하는도다 또 저희는 이성 없는 짐승같이 본능으로 아는 그것으로 멸망하느니라
Kasi bato wana bafingaka oyo bango basosolaka te, mpe makambo oyo bango basosolaka na lolenge na bango ya bomoto mpe ya bonyama ekobebisa bango.
11 화 있을진저! 이 사람들이여, 가인의 길에 행하였으며 삯을 위하여 발람의 어그러진 길로 몰려갔으며 고라의 패역을 좇아 멸망을 받았도다
Mawa na bango, pamba te balandaki nzela ya Kayina, bapengwaki lokola Balami mpo na lokoso ya mbongo, mpe bakufaki lokola Kore mpo na botomboki.
12 저희는 기탄없이 너희와 함께 먹으니 너희 애찬의 암초요 자기 몸만 기르는 목자요 바람에 불려가는 물없는 구름이요 죽고 또 죽어 뿌리까지 뽑힌 열매 없는 가을 나무요
Ezali mpe kaka bango nde babetisaka baninga mabaku na tango ya kolia na lisanga: baliaka na lokoso mpe na soni te, balukaka kaka bolamu na bango; bazali lokola mapata oyo ezangi mayi, oyo mopepe ezali komema; bazali lokola banzete oyo ebotaka bambuma te, ata na eleko ya kobuka bambuma; ekufaka mbala mibale soki bapikoli yango.
13 자기의 수치의 거품을 뿜는 바다의 거친 물결이요 영원히 예비된 캄캄한 흑암에 돌아갈 유리하는 별들이라 (aiōn )
Babimisaka misala na bango ya soni ndenge ebale monene ebimisaka mbonge mpe fulufulu soki etomboki makasi; bazali lokola minzoto oyo eyengaka-yengaka. Nzambe abombeli bango etumbu ya molili makasi mpo na libela. (aiōn )
14 아담의 칠세 손 에녹이 사람들에게 대하여도 예언하여 이르되 보라 주께서 그 수만의 거룩한 자와 함께 임하셨나니
Ezala Enoki, mokitani ya sambo wuta Adamu, asakolaki na tina na bango: « Tala, Nkolo azali koya elongo na basantu na Ye, bankoto na bankoto,
15 이는 뭇사람을 심판하사 모든 경건치 않은 자의 경건치 않게 행한 모든 경건치 않은 일과 또 경건치 않은 죄인의 주께 거스려 한 모든 강퍅한 말을 인하여 저희를 정죄하려 하심이라 하였느니라
mpo na kosambisa bato nyonso mpe kopesa etumbu na bato nyonso oyo batosaka Ye te mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mafinga nyonso oyo basumuki yango babimisaki mpo na kofinga Nzambe. »
16 이 사람들은 원망하는 자며 불만을 토하는 자며 그 정욕대로 행하는 자라 그 입으로 자랑하는 말을 내며 이를 위하여 아첨하느니라
Bato yango bayimaka-yimaka mpe bamilelaka-lelaka tango nyonso, batambolaka kolanda baposa mabe ya banzoto na bango, bamikumisaka mpe bakumisaka bato mosusu na lokuta mpo na kobenda litomba kowuta na bango.
17 사랑하는 자들아! 너희는 우리 주 예수 그리스도의 사도들의 미리 한 말을 기억하라
Kasi bino, balingami na ngai, bokanisa maloba oyo bantoma ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, balobaki liboso.
18 그들이 너희에게 말하기를 마지막 때에 자기의 경건치 않은 정욕대로 행하며 기롱하는 자들이 있으리라 하였나니
Balobaki na bino: « Na tango ya suka, ekozala na batioli oyo bakotambola kolanda baposa na bango, oyo ekotindika bango na koboya kotosa makambo ya Nzambe. »
19 이 사람들은 당을 짓는 자며 육에 속한 자며 성령은 없는 자니라
Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.
20 사랑하는 자들아! 너희는 너희의 지극히 거룩한 믿음 위에 자기를 건축하며 성령으로 기도하며
Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.
21 하나님의 사랑 안에서 자기를 지키며 영생에 이르도록 우리 주 예수 그리스도의 긍휼을 기다리라 (aiōnios )
Bomibomba kati na bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela ete Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na mawa na Ye, apesa bino bomoi ya seko. (aiōnios )
Boyokela bato oyo bazali nanu na tembe mawa;
23 또 어떤 자를 불에서 끌어내어 구원하라 또 어떤 자를 그 육체로 더럽힌 옷이라도 싫어하여 두려움으로 긍휼히 여기라
mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.
24 능히 너희를 보호하사 거침이 없게 하시고 너희로 그 영광 앞에 흠이 없이 즐거움으로 서게 하실 자
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene;
25 곧 우리 구주 홀로 하나이신 하나님께 우리 주 예수 그리스도로 말미암아 영광과 위엄과 권력과 권세가 만고 전부터 이제와 세세에 있을지어다! 아멘 (aiōn )
epai ya Nzambe moko kaka, Mobikisi na biso, na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, tika ete nkembo, lokumu, nguya mpe bokonzi ezala ya Ye, wuta liboso ya tango, sik’oyo mpe mpo na libela na libela! Amen! (aiōn )