< 욥기 35 >

1 엘리후가 말을 이어 가로되
Bongo Eliwu alobaki:
2 네가 이것을 합리하게 여기느냐 네 생각에 네가 하나님보다 의롭다 하여
« Boni, okanisi ete yango ezali sembo? Olobi: ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›
3 이르기를 유익이 무엇인고 범죄한 것보다 내게 이익이 무엇인고 하는구나
Nzokande, ozali koloba: ‹ Nakozwa nini, litomba nini nakozwa soki nasali masumu te? ›
4 내가 너와 및 너와 함께 있는 네 동무들에게 대답하리라
Nalingi kopesa yo eyano, yo elongo na baninga na yo.
5 너는 하늘을 우러러 보라 네 위의 높은 궁창을 바라보라
Tombola miso na likolo mpe tala; mona ndenge mapata ezali likolo na yo.
6 네가 범죄한들 하나님께 무슨 영향이 있겠으며 네 죄악이 관영한들 하나님께 무슨 관계가 있겠으며
Soki osali masumu, ekosala Nzambe nini? Soki masumu na yo ezali ebele, ekosala Ye nini?
7 네가 의로운들 하나님께 무엇을 드리겠으며 그가 네 손에서 무엇을 받으시겠느냐
Soki ozali sembo, okopesa Ye nini to akozwa nini na loboko na yo?
8 네 악은 너와 같은 사람이나 해할 따름이요 네 의는 인생이나 유익하게 할 뿐이니라
Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato.
9 사람은 학대가 많으므로 부르짖으며 세력 있는 자의 팔에 눌리므로 도움을 부르짖으나
Bato bazali kolela na se ya mokumba ya minyoko, bazali koganga na se ya motema makasi ya bato minene.
10 나를 지으신 하나님 곧 사람으로 밤중에 노래하게 하시며 우리를 교육하시기를 땅의 짐승에게 하심보다 더하게 하시며 우리에게 지혜 주시기를 공중의 새에게 주심보다 더하시는 이가 어디 계신가 말하는 자가 한 사람도 없구나
Kasi moto moko te azali koloba: ‹ Nzambe Mokeli na ngai, Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu,
11 상동
Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, azali wapi? ›
12 그들이 악인의 교만을 인하여 거기서 부르짖으나 응락하는 자가 없음은
Ata bagangi, Nzambe akoyanola te, mpo na lolendo ya bato mabe.
13 헛된 부르짖음은 하나님이 결코 듣지 아니하시며 전능자가 돌아 보지 아니 하심이라
Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
14 하물며 말하기를 하나님은 뵈올 수 없고 일의 시비는 그 앞에 있으니 나는 그를 기다릴 뿐이라 하는 너랴
Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te, ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye.
15 하나님이 진노하심으로 벌을 주지 아니하셨고 횡포를 심히 살피지 아니하셨으므로
Mpe sik’oyo, soki kanda ya Nzambe eyei nanu likolo na yo te mpe soki Ye azali nanu kobosana maloba na yo ya soni,
16 이제 너 욥이 헛되이 입을 열어 지식 없는 말을 많이 하는구나
elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. »

< 욥기 35 >