< ヨブ 記 38 >
1 この時、主はつむじ風の中からヨブに答えられた、
Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi:
2 「無知の言葉をもって、神の計りごとを暗くするこの者はだれか。
« Nani azali kobebisa mabongisi na ngai na maloba ezanga tina?
3 あなたは腰に帯して、男らしくせよ。わたしはあなたに尋ねる、わたしに答えよ。
Lata mokaba na yo lokola elombe mobali; nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai.
4 わたしが地の基をすえた時、どこにいたか。もしあなたが知っているなら言え。
Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele? Yebisa ngai soki ozali mayele.
5 あなたがもし知っているなら、だれがその度量を定めたか。だれが測りなわを地の上に張ったか。
Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye? Nani amekaki molayi na yango na singa?
6 その土台は何の上に置かれたか。その隅の石はだれがすえたか。
Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini? Nani atiaki libanga na yango ya songe,
7 かの時には明けの星は相共に歌い、神の子たちはみな喜び呼ばわった。
tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo?
8 海の水が流れいで、胎内からわき出たとき、だれが戸をもって、これを閉じこめたか。
Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi tango yango ebimaki wuta na mabele,
9 あの時、わたしは雲をもって衣とし、黒雲をもってむつきとし、
tango nakomisaki mapata elamba na yango, mpe molili, singa ya kokangela yango,
tango natielaki yango bandelo, tango natielaki yango bikuke ya makasi,
11 言った、『ここまで来てもよい、越えてはならぬ、おまえの高波はここにとどまるのだ』と。
tango nalobaki: ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te; awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo? ›
12 あなたは生れた日からこのかた朝に命じ、夜明けにその所を知らせ、
Boni, osili kopesa tongo mitindo to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango,
13 これに地の縁をとらえさせ、悪人をその上から振り落させたことがあるか。
mpo ete esimba bandelo ya mokili mpe ebimisa bato mabe?
14 地は印せられた土のように変り、衣のようにいろどられる。
Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe, mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba.
15 悪人はその光を奪われ、その高くあげた腕は折られる。
Bazangisi bato mabe pole mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe.
16 あなたは海の源に行ったことがあるか。淵の底を歩いたことがあるか。
Osila kokoma kino na etima ya ebale monene? Osila kotambola na se ya libulu ya molili?
17 死の門はあなたのために開かれたか。あなたは暗黒の門を見たことがあるか。
Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa? Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa?
18 あなたは地の広さを見きわめたか。もしこれをことごとく知っているならば言え。
Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili? Loba yango soki oyebi makambo oyo nyonso.
19 光のある所に至る道はいずれか。暗やみのある所はどこか。
Wapi nzela oyo ememaka na pole? Bongo molili ezalaka wapi
20 あなたはこれをその境に導くことができるか。その家路を知っているか。
mpo ete omema yango na bisika na yango mpe oyeba banzela oyo ememaka na esika oyo evandaka?
21 あなたは知っているだろう、あなたはかの時すでに生れており、またあなたの日数も多いのだから。
Solo, oyebi yango malamu, pamba te osilaki kobotama mpe motuya ya mikolo na yo ezali ebele.
22 あなたは雪の倉にはいったことがあるか。ひょうの倉を見たことがあるか。
Boni, osila kokoma na esika oyo babombaka mvula ya pembe mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga?
23 これらは悩みの時のため、いくさと戦いの日のため、わたしがたくわえて置いたものだ。
Nabombaki yango mpo na tango ya pasi mpe mpo na mikolo ya bitumba.
24 光の広がる道はどこか。東風の地に吹き渡る道はどこか。
Na nzela nini pole ebimaka mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka?
25 だれが大雨のために水路を切り開き、いかずちの光のために道を開き、
Nani atimola nzela mpo na mvula makasi, nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake
mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato, na esika ya esobe oyo bato bavandaka te,
27 荒れすたれた地をあき足らせ、これに若草をはえさせるか。
mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka, mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu?
Boni, mvula ezali nde na tata? Nani abotaki matanga ya mamwe?
29 氷はだれの胎から出たか。空の霜はだれが生んだか。
Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga? Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo?
30 水は固まって石のようになり、淵のおもては凍る。
Tango nini mayi ekomaka libanga mpe likolo ya mayi ya mozindo ekomaka libanga?
31 あなたはプレアデスの鎖を結ぶことができるか。オリオンの綱を解くことができるか。
Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko to kofungola basinga ya Minzoto minei?
32 あなたは十二宮をその時にしたがって引き出すことができるか。北斗とその子星を導くことができるか。
Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake na tango na yango mpe kokamba Ngombolo elongo na bana na yango?
33 あなたは天の法則を知っているか、そのおきてを地に施すことができるか。
Oyebi mibeko ya likolo? Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili?
34 あなたは声を雲にあげ、多くの水にあなたをおおわせることができるか。
Okoki kotombola mongongo na yo na mapata mpo ete mayi ebele ezipa yo?
35 あなたはいなずまをつかわして行かせ、『われわれはここにいる』と、あなたに言わせることができるか。
Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango mpe eloba na yo: ‹ Tala biso oyo? ›
36 雲に知恵を置き、霧に悟りを与えたのはだれか。
Nani atia bwanya na motema ya moto to nani apesa soso mayele?
37 だれが知恵をもって雲を数えることができるか。だれが天の皮袋を傾けて、
Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapata mpe kosopa mayi ya nzungu ya likolo
38 ちりを一つに流れ合させ、土くれを固まらせることができるか。
mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na moto mpe mpo ete maboke ya mabele ekangama esika moko?
39 あなたはししのために食物を狩り、子じしの食欲を満たすことができるか。
Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasi mpe kosilisa nzala ya bana na yango
40 彼らがほら穴に伏し、林のなかに待ち伏せする時、あなたはこの事をなすことができるか。
tango elalaka kati na mabulu na yango mpe emilengelaka na se ya banzete ya makasa ebele?
41 からすの子が神に向かって呼ばわり、食物がなくて、さまようとき、からすにえさを与える者はだれか。
Nani abongiselaka yanganga bilei tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei?