< 申命記 1 >

1 是はモーセがヨルダンの此旁の曠野紅海に對する平野に在てバラン、トベル、ラバン、ハゼロテ、デザハブの間にてイスラエルの一切の人に告たる言語なり
Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.
2 ホレブよりセイル山の路を經てカデシバルネアに至るには十一日路あり
Esengaka mikolo zomi na moko ya mobembo wuta na Orebi kino na Kadeshi-Barinea, na nzela ya ngomba Seiri.
3 第四十年の十一月にいたりその月の一日にモーセはイスラエルの子孫にむかひてヱホバが彼等のために自己に授けたまひし命令を悉く告たり
Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango.
4 是はモーセがヘシボンに住るアモリ人の王シホン及びエデレイのアシタロテに住るバシヤンの王オグを殺したる後なりき
Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
5 即ちモーセ、ヨルダンの此旁なるモアブの地においてこの律法を解明すことを爲し始めたり曰く
Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango:
6 我らの神ヱホバ、ホレブにて我らに告て言たまへり汝らはこの山に居こと日すでに久し
« Yawe, Nzambe na biso, alobaki na biso, na ngomba Orebi: ‹ Bowumeli mpe mingi na ngomba oyo.
7 汝ら身を轉らして途に進みアモリ人の山に往き其に鄰れる處々に往き平野山地窪地南の地海邊カナン人の地レバノンおよび大河ユフラテ河に至れ
Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.
8 我この地を汝らの前に置り入てこの地を獲よ是はヱホバが汝らの先祖アブラハム、イサク、ヤコブに誓ひて之を彼らとその後の子孫に與へんと言たまひし者なりと
Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »
9 彼時我なんぢらに語りて言り我は一人にては汝らをわが任として負ことあたはず
Na tango wana, nalobaki na bino: — Ngai moko nakokoka te kokamba bino.
10 汝らの神ヱホバ汝らを衆多ならしめたまひたれば汝ら今日は天空の星のごとくに衆し
Yawe, Nzambe na bino, akomisi bino ebele koleka mpe tala lelo motango na bino ekomi lokola minzoto na likolo.
11 願くは汝らの先祖の神ヱホバ汝らをして今あるよりは千倍も多くならしめ又なんぢらに約束せしごとく汝らを祝福たまはんことを
Tika ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, akomisa bino ebele mbala nkoto moko mpe apambola bino ndenge alakaki!
12 我一人にては爭で汝らを吾任となしまた汝らの重負と汝らの爭競に當ることを得んや
Nakokoka ndenge nini komema ngai moko makambo na bino, mikumba na bino, mpe kowelana na bino?
13 汝らの支派の中より智慧あり知識ありて人に識れたる人々を簡べ我これを汝らの首長となさんと
Bopona bato ya bwanya, ya mayele mpe ya lokumu kati na moko na moko ya mabota na bino, mpe ngai nakotia bango bakambi na bino.
14 時に汝ら答へて言り汝が言ところの事を爲は善しと
Bozongiselaki ngai: — Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu.
15 是をもて我汝らの支派の首長なる智慧ありて人に知れたる者等を取て汝らの首長となせり即ち之をもて千人の長百人の長五十人の長十人の長となしまた汝らの支派の中の官吏となせり
Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.
16 また彼時に我汝らの士師等に命じて言り汝らその兄弟の中の訴訟を聽き此人と彼人の間を正く審判くべし他國の人においても然り
Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo: « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya.
17 汝ら人を視て審判すべからず小き者にも大なる者にも聽べし人の面を懼るべからず審判は神の事なればなり汝らにおいて斷定がたき事は我に持きたれ我これを聽ん
Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso: azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »
18 我かの時に汝らの爲べき事をことごとく汝らに命じたりき
Mpe na tango wana, nayebisaki bino makambo nyonso oyo bosengeli kosala.
19 我等の神ヱホバの我等に命じたまひしごとくに我等はホレブより出たち汝らが見知るかの大なる畏しき曠野を通りアモリ人の山を指てガデシバルネアに至れり
Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.
20 時に我なんぢらに言り汝らは我らの神ヱホバの我らに與へたまへるアモリ人の山に至れり
Nalobaki na bino: — Bosili kokoma na etuka ya bangomba ya bato ya Amori, etuka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.
21 視よ汝の神ヱホバこの地を汝の前に置たまふ汝の先祖の神ヱホバの汝に言たまふごとく上り往てこれを獲よ懼るるなかれ猶豫なかれと
Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko.
22 汝らみな我に近りて言り我等人を我らの先に遣してその地を伺察しめ彼らをして返て何の途より上るべきか何の邑々に入べきかを我らに告しめんと
Bato nyonso kati na bino bayaki epai na ngai mpe balobaki: — Tika ete totinda liboso na biso bato mpo na konongela biso mokili mpe komemela biso sango ya nzela oyo tokoki kolanda mpe ya bingumba epai wapi tokokende.
23 この言わが目に善と見ければ我汝らの中より十二人の者を取り即ち一の支派より一人宛なりき
Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, yango wana naponaki kati na bino mibali zomi na mibale, mobali moko mpo na libota moko.
24 彼等前みゆきて山に登りエシコルの谷にいたり之を伺ひ
Balongwaki mpe bakendeki, bongo bamataki kino na etuka ya bangomba mpe bakomaki na lubwaku ya Eshikoli oyo banongaki.
25 その地の菓物を手に取てわれらの許に持くだり我らに復命して言り我等の神ヱホバの我等に與へたまへる地は善地なりと
Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso: « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. »
26 然るに汝等は上り往ことを好まずして汝らの神ヱホバの命令に背けり
Kasi boboyaki komata, botombokelaki etinda ya Yawe, Nzambe na bino.
27 すなはち汝らその天幕にて呟きて言りヱホバわれらを惡むが故に我らをアモリ人の手に付して滅ぼさんとてエジプトの國より我らを導き出せり
Bongo boyimaki-yimaki kati na bandako na bino mpe bolobaki: « Yawe alingaka biso te, yango wana abimisaki biso na Ejipito mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Amori mpo ete bango baboma biso.
28 我等は何方に往べきや我らの兄弟等は言ふその民は我らよりも大にして身長たかく邑々は大にしてその石垣は天に達る我らまたアナクの子孫を其處に見たりと斯いひて我らの氣を挫けりと
Boni, tokende kaka kuna? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi: ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »
29 時に我なんぢらに言り怖る勿れ懼るるなかれ
Nalobaki na bino: « Bozala na somo te mpe bobanga bango te,
30 汝らに先ち行たまふ汝らの神ヱホバ、エジプトにおいて汝らの爲に汝らの目の前にて諸の事をなしたまひし如く今また汝らのために戰ひたまはん
pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.
31 曠野においては汝また汝の神ヱホバが人のその子を抱くが如くに汝を抱きたまひしを見たり汝らが此處にいたるまでその路すがら常に然ありしなりと
Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. »
32 この言をなせども汝らはなほその神ヱホバを信ぜざりき
Atako bongo, botiaki elikya te epai na Yawe, Nzambe na bino,
33 ヱホバは途にありては汝らに先ちゆきて汝らが營を張べき處を尋ね夜は火の中にあり晝は雲の中にありて汝らの行べき途を示したまへる者なり
oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.
34 ヱホバ汝らの言語の聲を聞て怒り誓て言たまひけらく
Tango Yawe ayokaki nyonso oyo bozalaki koloba, asilikaki mpe alapaki ndayi:
35 この惡き代の人々の中には我が汝らの先祖等に與へんと誓ひしかの善地を見る者一人も有ざるべし
« Moto moko te kati na molongo oyo ya bato mabe akoki komona mokili ya kitoko oyo nalakaki kopesa na bakoko na bango na nzela ya ndayi,
36 只ヱフンネの子カルブのみ之を見ることを得ん彼が踐たりし地をもて我かれとかれの子孫に與ふべし其は彼まったくヱホバに從ひたればなり
longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »
37 ヱホバまた汝らの故をもて我をも怒て言たまへり汝もまた彼處に入ことを得ず
Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai; alobaki: « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango.
38 汝の前に侍るヌンの子ヨシユアかしこに入べし彼に力をつけよ彼イスラエルをして之を獲しむべし
Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula.
39 また汝等が掠められんと言たりしその汝らの子女および當日になほ善惡を辨へざりし汝らの幼兒等彼ら即ちかしこに入べし我これを彼らに與へて獲さすべし
Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango.
40 汝らは身をめぐらし紅海の途より曠野に進みいるべしと
Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. »
41 然るに汝ら對て我にいへり我等はヱホバにむかひて罪を犯せり然ばわれらの神ヱホバの凡て我らに命じたまへるがごとく我ら上りゆきて戰はんと汝らおのおの武器を身に帶て軽々しく山に登らんとせり
Bozongiselaki ngai: « Tosali masumu epai na Yawe. Tokokende mpe tokobunda ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso. » Boye, moto nyonso kati na bino alataki bibundeli na ye, mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pasi te komata na etuka ya bangomba.
42 時にヱホバわれに言たまひけるは汝かれらに言へ汝ら上りゆくなかれ又戰ふなかれ我なんぢらの中間に居ざればなり汝ら恐らくはその敵に打敗られんと
Kasi Yawe alobaki na ngai: « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te; banguna na bango bakolonga bango. »
43 われかく汝らに告たるに汝ら聽ずしてヱホバの命令に背き自檀に山に登りたりしが
Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te; botombokelaki mitindo ya Yawe; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba.
44 その山に住るアモリ人汝等にむかひて出きたり蜂の驅がごとくに汝らを驅ちらしなんぢらをセイルに打敗りてホルマにおよべり
Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima.
45 斯りしかばなんぢら還りきたりてヱホバの前に哭きたりしがヱホバなんぢらの聲を聽たまはず汝らに耳を傾むけたまはざりき
Bozongaki mpe bolelaki liboso ya Yawe, kasi aboyaki koyoka kolela na bino, akangaki matoyi na Ye.
46 是をもてなんぢらは日久しくカデシに居りなんぢらが其處に居たる日數のごとし
Bongo bovandaki na Kadeshi mikolo ebele.

< 申命記 1 >