< תהילים 40 >

למנצח לדוד מזמור קוה קויתי יהוה ויט אלי וישמע שועתי׃ 1
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Natiaki elikya na ngai kati na Yawe; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
ויעלני מבור שאון מטיט היון ויקם על סלע רגלי כונן אשרי׃ 2
Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto; atelemisaki ngai na likolo ya libanga mpe alendisaki makolo na ngai.
ויתן בפי שיר חדש תהלה לאלהינו יראו רבים וייראו ויבטחו ביהוה׃ 3
Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai, nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso. Bato ebele bakomona, bakobanga mpe bakotiela Yawe motema.
אשרי הגבר אשר שם יהוה מבטחו ולא פנה אל רהבים ושטי כזב׃ 4
Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe, kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
רבות עשית אתה יהוה אלהי נפלאתיך ומחשבתיך אלינו אין ערך אליך אגידה ואדברה עצמו מספר׃ 5
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza. Moko te akokani na Yo; nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango, kasi motango na yango eleki ebele.
זבח ומנחה לא חפצת אזנים כרית לי עולה וחטאה לא שאלת׃ 6
Osepelaki te na bambeka mpe na makabo, kasi ofungolaki matoyi na ngai; osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka mpo masumu.
אז אמרתי הנה באתי במגלת ספר כתוב עלי׃ 7
Bongo nalobaki: « Ngai oyo, nayei epai na Yo kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.
לעשות רצונך אלהי חפצתי ותורתך בתוך מעי׃ 8
Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo, Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »
בשרתי צדק בקהל רב הנה שפתי לא אכלא יהוה אתה ידעת׃ 9
Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani, nakokanga monoko na ngai te; Yawe, oyebi yango!
צדקתך לא כסיתי בתוך לבי אמונתך ותשועתך אמרתי לא כחדתי חסדך ואמתך לקהל רב׃ 10
Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai, natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani, nakobomba yango ata moke te.
אתה יהוה לא תכלא רחמיך ממני חסדך ואמתך תמיד יצרוני׃ 11
Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te; kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo ebatelaka ngai tango nyonso.
כי אפפו עלי רעות עד אין מספר השיגוני עונתי ולא יכלתי לראות עצמו משערות ראשי ולבי עזבני׃ 12
Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai, mabunga na ngai ekomi konyokola ngai, mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango; ezali ebele koleka suki ya moto na ngai, mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
רצה יהוה להצילני יהוה לעזרתי חושה׃ 13
Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai; Yawe, yaka noki kosunga ngai.
יבשו ויחפרו יחד מבקשי נפשי לספותה יסגו אחור ויכלמו חפצי רעתי׃ 14
Tika ete bato oyo balukaka kufa na ngai bakufa soni mpe basambwa! Tika ete bato oyo bazelaka libebi na ngai bazonga sima mpe babungisa lokumu na bango!
ישמו על עקב בשתם האמרים לי האח האח׃ 15
Tika ete ba-oyo balobaka na ngai: « Ah! Ah! » bayoka somo mpe bakufa soni!
ישישו וישמחו בך כל מבקשיך יאמרו תמיד יגדל יהוה אהבי תשועתך׃ 16
Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso: « Yawe azali monene! »
ואני עני ואביון אדני יחשב לי עזרתי ומפלטי אתה אלהי אל תאחר׃ 17
Solo, nazali mobola mpe moto akelela, kasi tika ete Nkolo asunga mpe akangola ngai. Nzambe na ngai, kowumela te!

< תהילים 40 >