< תהילים 64 >

למנצח מזמור לדוד שמע אלהים קולי בשיחי מפחד אויב תצר חיי׃ 1
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo.
תסתירני מסוד מרעים מרגשת פעלי און׃ 2
Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe, mosika ya makita ya bato ya misala mabe.
אשר שננו כחרב לשונם דרכו חצם דבר מר׃ 3
Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga
לירות במסתרים תם פתאם ירהו ולא ייראו׃ 4
mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.
יחזקו למו דבר רע יספרו לטמון מוקשים אמרו מי יראה למו׃ 5
Balendisanaka mpo na mabongisi mabe, bayokanaka kotia mitambo; balobaka: « Nani akomona yango? »
יחפשו עולת תמנו חפש מחפש וקרב איש ולב עמק׃ 6
Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka: « Toselingwi na mabongisi na biso! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.
וירם אלהים חץ פתאום היו מכותם׃ 7
Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata; ekozwa mpe ekozokisa bango.
ויכשילוהו עלימו לשונם יתנדדו כל ראה בם׃ 8
Maloba na bango moko ekobalukela bango mpe ekomema bango na libebi; mpe moto nyonso oyo akomona bango akoningisa moto.
וייראו כל אדם ויגידו פעל אלהים ומעשהו השכילו׃ 9
Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka.
ישמח צדיק ביהוה וחסה בו ויתהללו כל ישרי לב׃ 10
Moto ya sembo akosepela mpe akomibomba kati na Yawe; bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakomikumisa mpo na yango.

< תהילים 64 >