< מארק 2 >
ויהי מקץ ימים בשובו אל כפר נחום וישמעו כי הוא בבית׃ | 1 |
Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako,
ויאספו רבים מהרה עד אפס מקום לעמד אף מחוץ לפתח וידבר אליהם את הדבר׃ | 2 |
bayaki ebele kosangana kati na ndako yango kino esika ezalaki lisusu te, ezala na liboso ya ekuke, mpe Yesu ateyaki bango Sango Malamu.
ויבאו אליו אנשים נשאים איש נכה אברים וישאהו בארבעה׃ | 3 |
Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli.
ולא יכלו לגשת אליו מפני העם ויסירו את הגג במקום אשר היה שם ויחתרו חתירה ויורידו את המשכב אשר שכב עליה נכה האברים׃ | 4 |
Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango.
ויהי כראות ישוע את אמונתם ויאמר אל נכה האברים בני נסלחו לך חטאתיך׃ | 5 |
Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono: — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.
ויהיו מן הסופרים ישבים שם וחשבים בלבם לאמר׃ | 6 |
Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema:
מה ידבר זה גדופים כאלה מי יוכל לסלח חטאים בלתי האלהים לבדו׃ | 7 |
« Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo? Azali kotiola Nzambe! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te? »
וידע ישוע ברוחו כי ככה חשבו בלבבם ויאמר אליהם מדוע תחשבו כאלה בלבבכם׃ | 8 |
Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango; alobaki na bango: — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo?
מה הנקל האמר אל נכה האברים נסלחו לך חטאתיך אם אמור קום שא את משכבך והתהלך׃ | 9 |
Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono: « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola? »
אך למען תדעון כי לבן האדם יש השלטן לסלח חטאים בארץ ויאמר אל נכה האברים׃ | 10 |
Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili. Bongo alobaki na ebosono:
לך אני אמר קום שא את משכבך ולך אל ביתך׃ | 11 |
— Nalobi na yo: Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
ויקם פתאם וישא את משכבו ויצא לעיני כלם עד כי השתממו כלם וישבחו את האלהים לאמר מעולם לא ראינו כזאת׃ | 12 |
Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo: « Totikala nanu komona likambo ya boye te! »
וישב לצאת אל יד הים ויבאו אליו כל העם וילמדם׃ | 13 |
Yesu abimaki lisusu mpe akendeki pembeni ya ebale. Bato ebele bayaki epai na Ye mpe ateyaki bango.
ויהי בעברו וירא את לוי בן חלפי ישב בבית המכס ויאמר אליו לכה אחרי ויקם וילך אחריו׃ | 14 |
Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye: « Landa Ngai. » Levi atelemaki mpe alandaki Ye.
ויהי כאשר הסב בביתו ויסבו מוכסים וחטאים רבים עם ישוע ועם תלמידיו כי רבים היו ההלכים אחריו׃ | 15 |
Wana Yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bazalaki kolia mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye; pamba te bato ebele penza bazalaki kolanda Ye.
והסופרים והפרושים ראו אתו אכל עם המוכסים והחטאים ויאמרו אל תלמידיו למה זה עם החטאים והמוכסים אכל רבכם׃ | 16 |
Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye: — Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu?
וישמע ישוע ויאמר החזקים אינם צריכים לרפא כי אם החלים לא באתי לקרא הצדיקים כי אם החטאים לתשובה׃ | 17 |
Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango: — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
ותלמידי יוחנן והפרושים היו צמים ויבאו ויאמרו אליו מדוע תלמידי יוחנן ותלמידי הפרושים צמים ותלמידיך אינם צמים׃ | 18 |
Nzokande bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bazalaki kokila bilei. Bongo bato bayaki kotuna Yesu: — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?
ויאמר אליהם ישוע איך יוכלו בני החפה לצום בעוד החתן עמהם כל ימי היות החתן עמהם לא יוכלו לצום׃ | 19 |
Yesu azongiselaki bango: — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te.
הנה ימים באים ולקח מאתם החתן ואז יצומו בימים ההם׃ | 20 |
Kasi tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
אין תפר מטלית בגד חדש על שמלה בלה כי אז ינתק מלויו החדש מן הבלה ותרע הקריעה׃ | 21 |
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala mpe ekosala lidusu ya monene koleka.
ואין נתן יין חדש בנאדות בלים כי אז יבקע היין את הנאדות והיין ישפך והנאדות יאבדו אבל בנאדות חדשים ינתן היין החדש׃ | 22 |
Moto moko te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala, noki te vino ya sika ekopasola bambeki; vino ekosopana mpe bambeki ekopasuka. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika!
ויהי כעברו בשבת בין הקמה ויחלו תלמידיו לקטף מלילת בלכתם׃ | 23 |
Ezalaki mokolo moko, Yesu azalaki kotambola kati na elanga ya ble; ezalaki mokolo ya Saba. Wana bazalaki kotambola, bayekoli na Ye bazalaki kobuka ble.
ויאמרו אליו הפרושים ראה מה המה עשים בשבת דבר אשר לא יעשה׃ | 24 |
Bafarizeo balobaki na Yesu: — Mpo na nini bayekoli na Yo bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba?
ויאמר אליהם הכי לא קראתם את אשר עשה דוד בהיתו חסר ורעב הוא ואשר היו אתו׃ | 25 |
Yesu azongiselaki bango: — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei?
כי בא אל בית אלהים בימי אביתר הכהן הגדול ויאכל את לחם הפנים אשר לא נכון לאכלה כי אם לכהנים ויתן גם לאנשים אשר אתו׃ | 26 |
Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.
ויאמר אליהם השבת נעשה בעבור האדם ולא האדם בעבור השבת׃ | 27 |
Bongo alobaki na bango lisusu: — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.
לכן בן האדם אדון הוא גם לשבת׃ | 28 |
Yango wana, Mwana na Moto azali mpe Mokonzi ya mokolo ya Saba.