< איוב 30 >

ועתה שחקו עלי צעירים ממני לימים אשר מאסתי אבותם לשית עם כלבי צאני׃ 1
« Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge oyo batata na bango bazangaki tina, mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia esika moko na mbwa na ngai, oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai.
גם כח ידיהם למה לי עלימו אבד כלח׃ 2
Makasi ya maboko na bango ekokaki kutu kosunga ngai na nini? Pamba te basilaki makasi na nzoto,
בחסר ובכפן גלמוד הערקים ציה אמש שואה ומשאה׃ 3
bazalaki bato bakawuka na nzala mpe na kozanga, bato oyo bazalaki kolia mabele ya esobe mpe ezanga matiti.
הקטפים מלוח עלי שיח ושרש רתמים לחמם׃ 4
Bazalaki kobuka matiti ya mungwa kati na banzete mpe kolia misisa ya banzete mike.
מן גו יגרשו יריעו עלימו כגנב׃ 5
Babenganaki bango kati na bato na bango, babelelaki bango lokola miyibi.
בערוץ נחלים לשכן חרי עפר וכפים׃ 6
Bazalaki kovanda na nzela ya mayi ekawuka, kati na mabulu ya mabele mpe ya mabanga;
בין שיחים ינהקו תחת חרול יספחו׃ 7
bazalaki kolela lokola banyama kati na banzete mike ya nzube, bazalaki kosangana na se ya banzete mikuse.
בני נבל גם בני בלי שם נכאו מן הארץ׃ 8
Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo babenganaki bango libanda ya mboka.
ועתה נגינתם הייתי ואהי להם למלה׃ 9
Sik’oyo, bana na bango ya mibali bakomi koseka ngai na banzembo, nakomi lisapo kati na minoko na bango.
תעבוני רחקו מני ומפני לא חשכו רק׃ 10
Bazali koyina ngai mpe bakimi mosika na ngai, bazali na somo te ya kobwakela ngai soyi na elongi.
כי יתרו פתח ויענני ורסן מפני שלחו׃ 11
Mpo ete Nzambe alembisi singa ya tolotolo na ngai mpe ayokisi ngai soni, bazali komipekisa na likambo moko te liboso na ngai.
על ימין פרחח יקומו רגלי שלחו ויסלו עלי ארחות אידם׃ 12
Na loboko na ngai ya mobali, lisanga ya bato mabe ezali kobundisa ngai, batie mitambo na makolo na ngai, batie mabaku na nzela na ngai mpo na kosala ngai mabe;
נתסו נתיבתי להותי יעילו לא עזר למו׃ 13
bakangi nzela na ngai, balongi kobebisa ngai atako moto moko te asungaki bango.
כפרץ רחב יאתיו תחת שאה התגלגלו׃ 14
Bazali koya lokola na nzela ya lidusu ya monene, bazali kobunda-bunda kati na ndako ebukana.
ההפך עלי בלהות תרדף כרוח נדבתי וכעב עברה ישעתי׃ 15
Somo elati ngai, lokumu na ngai ekeyi lokola mopepe, bomengo na ngai elimwe lokola lipata.
ועתה עלי תשתפך נפשי יאחזוני ימי עני׃ 16
Sik’oyo, bomoi na ngai ekeyi, mpe mikolo ya pasi ekangi ngai.
לילה עצמי נקר מעלי וערקי לא ישכבון׃ 17
Butu ezali kotobola mikuwa na ngai mpe pasi ezali kozangisa ngai pongi.
ברב כח יתחפש לבושי כפי כתנתי יאזרני׃ 18
Na nguya na yango, pasi ekomi lokola kingo ya nzambala na ngai.
הרני לחמר ואתמשל כעפר ואפר׃ 19
Nzambe abwaki ngai na potopoto, mpe nakomi lokola putulu ya mabele to ya moto.
אשוע אליך ולא תענני עמדתי ותתבנן בי׃ 20
Oh Nzambe, nazali koganga epai na Yo, kasi ozali kopesa ngai eyano te; natelemi, kasi ozali kotala ngai kaka pamba.
תהפך לאכזר לי בעצם ידך תשטמני׃ 21
Obongwani monguna ya kanza mpo na ngai, ozali kobundisa ngai na nguya ya loboko na Yo.
תשאני אל רוח תרכיבני ותמגגני תשוה׃ 22
Omemi ngai liboso ya mopepe mpe otiki ete mopepe yango emema ngai, bongo epumbwisi ngai mosika.
כי ידעתי מות תשיבני ובית מועד לכל חי׃ 23
Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi.
אך לא בעי ישלח יד אם בפידו להן שוע׃ 24
Kasi boni, moto oyo azali kokufa akoki kotombola ata loboko te? Moto oyo azali na pasi, akoki te kosenga lisungi?
אם לא בכיתי לקשה יום עגמה נפשי לאביון׃ 25
Boni, nazalaki kolela te elongo na bato oyo bazalaki na pasi? Motema na ngai eyokelaki babola mawa te?
כי טוב קויתי ויבא רע ואיחלה לאור ויבא אפל׃ 26
Nazelaki esengo, kasi pasi nde ekomeli ngai; nazelaki pole, kasi molili nde ekomeli ngai.
מעי רתחו ולא דמו קדמני ימי עני׃ 27
Motema na ngai ezali kobaluka kati na ngai, wuta mokolo pasi oyo ekomeli ngai.
קדר הלכתי בלא חמה קמתי בקהל אשוע׃ 28
Nakomi mwindo, kasi moyi te nde eyindisi ngai; kati na lisanga, nakomi kaka kotelema mpe kobelela mpo na koluka lisungi.
אח הייתי לתנים ורע לבנות יענה׃ 29
Nakoma ndeko ya mbwa ya zamba mpe moninga ya maligbanga.
עורי שחר מעלי ועצמי חרה מני חרב׃ 30
Poso na ngai ya nzoto eyindi mpe ekomi kokweya-kweya, mikuwa na ngai ekawuki na moyi.
ויהי לאבל כנרי ועגבי לקול בכים׃ 31
Lindanda na ngai etikali kaka mpo na matanga, mpe flite na ngai, mpo na kosunga mingongo ya baleli. »

< איוב 30 >