< איוב 14 >

אדם ילוד אשה קצר ימים ושבע רגז׃ 1
Moto oyo abotama na mwasi azalaka kaka na mikolo moke oyo mpe etonda na pasi.
כציץ יצא וימל ויברח כצל ולא יעמוד׃ 2
Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka.
אף על זה פקחת עינך ואתי תביא במשפט עמך׃ 3
Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye? Olingi kaka komema ye liboso na Yo mpo na kosambisa ye?
מי יתן טהור מטמא לא אחד׃ 4
Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo? Moko te!
אם חרוצים ימיו מספר חדשיו אתך חקו עשית ולא יעבור׃ 5
Mikolo ya moto ekatama; okata motango ya basanza na ye mpe otia mondelo oyo akoki koleka te.
שעה מעליו ויחדל עד ירצה כשכיר יומו׃ 6
Longola miso na Yo mosika na ye mpe tika ye, ye moko, kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti.
כי יש לעץ תקוה אם יכרת ועוד יחליף וינקתו לא תחדל׃ 7
Nzete ezalaka kutu na mwa elikya: ata bakati yango, ebimaka lisusu mpe ebotaka bitape ya sika;
אם יזקין בארץ שרשו ובעפר ימות גזעו׃ 8
misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele, mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele,
מריח מים יפרח ועשה קציר כמו נטע׃ 9
nzokande soki kaka ezwi mayi, ekobimisa mito mpe ekobota bitape lokola nzete ya sika.
וגבר ימות ויחלש ויגוע אדם ואיו׃ 10
Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te.
אזלו מים מני ים ונהר יחרב ויבש׃ 11
Ndenge mayi esilaka na liziba to ndenge mayi ekawukaka,
ואיש שכב ולא יקום עד בלתי שמים לא יקיצו ולא יערו משנתם׃ 12
ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te, akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te, tango nyonso likolo ekozala.
מי יתן בשאול תצפנני תסתירני עד שוב אפך תשית לי חק ותזכרני׃ (Sheol h7585) 13
Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila! Soki kaka okatelaki ngai tango mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu! (Sheol h7585)
אם ימות גבר היחיה כל ימי צבאי איחל עד בוא חליפתי׃ 14
Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu kozala na bomoi? Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana.
תקרא ואנכי אענך למעשה ידיך תכסף׃ 15
Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima; okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo.
כי עתה צעדי תספור לא תשמור על חטאתי׃ 16
Solo penza, okotanga makolo na ngai, kasi okolandela lisusu masumu na ngai te.
חתם בצרור פשעי ותטפל על עוני׃ 17
Mabe na ngai ekokangama kati na saki, mpe okozipa masumu na ngai.
ואולם הר נופל יבול וצור יעתק ממקמו׃ 18
Kasi, ndenge ngomba esilaka mpe ekweyaka, ndenge libanga elongwaka na esika na yango,
אבנים שחקו מים תשטף ספיחיה עפר ארץ ותקות אנוש האבדת׃ 19
ndenge mayi eliaka mabanga, ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto.
תתקפהו לנצח ויהלך משנה פניו ותשלחהו׃ 20
Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye; obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye.
יכבדו בניו ולא ידע ויצערו ולא יבין למו׃ 21
Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu, ayebaka na ye yango te; soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te.
אך בשרו עליו יכאב ונפשו עליו תאבל׃ 22
Ayokaka kaka pasi kati na nzoto na ye, mpe motema na ye esalaka kaka matanga mpo na ye moko. »

< איוב 14 >