< אֶל־הַגָּלָטִיִּים 1 >
פולוס השליח לא מבני אדם ולא על ידי בן אדם כי אם על ידי ישוע המשיח ואלהים האב אשר העירו מן המתים׃ | 1 |
Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi,
וכל האחים אשר עמדי אל הקהלות אשר בגלטיא׃ | 2 |
mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai; Epai ya Mangomba ya Galatia:
חסד לכם ושלום מאת האלהים אבינו ומאת אדנינו ישוע המשיח׃ | 3 |
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
אשר נתן את נפשו בעד חטאתינו לחלצנו מן העולם הרע הזה כרצון אלהינו אבינו׃ (aiōn ) | 4 |
Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe. (aiōn )
אשר לו הכבוד לעולמי עולמים אמן׃ (aiōn ) | 5 |
Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela! Amen! (aiōn )
תמה אני כי סרתם מהר מאחרי הקרא אתכם בחסד המשיח אל בשורה זרה׃ | 6 |
Nazali kokamwa ete bozali kosundola noki Ye oyo abengaki bino na nzela ya ngolu ya Klisto mpe bozali kolanda sango malamu mosusu
והיא איננה אחרת רק שיש אנשים העכרים אתכם וחפצים להפך את בשורת המשיח׃ | 7 |
oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto.
אבל גם אנחנו או מלאך מן השמים אם יבוא לבשר אתכם בשורה מבלעדי זאת אשר בשרנו אתכם חרם יהיה׃ | 8 |
Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!
כמו שאמרנו כבר כן אמר עתה עוד הפעם איש כי יבשר אתכם בשורה מבלעדי אשר קבלתם חרם יהיה׃ | 9 |
Ndenge tolobaki yango liboso, mpe nazali lisusu koloba yango sik’oyo: soki moto moko ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!
ועתה המתרצה אנכי אל בני אדם אם אל האלהים או המבקש אנכי למצא חן בעיני בני אדם כי במצאי חן בעיני בני אדם לא אהיה עוד עבד המשיח׃ | 10 |
Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo: nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe? Boni, nazali koluka kosepelisa bato? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.
אבל מודיע אני אתכם אחי כי הבשורה אשר בשרתי לא לפי דרך אדם היא׃ | 11 |
Bandeko na ngai, nalingi boyeba malamu ete Sango Malamu oyo nateyaki bino ezalaki mbuma ya makanisi ya bomoto te.
כי גם אנכי לא קבלתיה מאדם ולא למדוני אתה כי אם בחזיון ישוע המשיח׃ | 12 |
Nazwaki yango na moto moko te, nayekolaki yango mpe te; kasi ezali Yesu-Klisto nde alakisaki ngai yango na nzela ya emoniseli.
כי הלא שמעתם את דרכי אשר התהלכתי מלפנים בין היהודים ואת אשר רדפתי על יתר את עדת אלהים ואבדתיה׃ | 13 |
Solo, boyokaki sango ya bizaleli na ngai ya kala tango nazalaki nanu mondimi kati na lingomba ya Bayuda; boyebi mpe ndenge nini nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpo na kopanza yango.
ואהי הולך וחזק בדת היהודית על רבים מבני גילי בעמי בקנאתי הגדולה לקבלות אבותי׃ | 14 |
Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai.
אך כאשר היה רצון האלהים אשר הבדיל אתי מרחם אמי ויקראני בחסדו׃ | 15 |
Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki
לגלות בי את בנו שאבשרנו בגוים מיד לא נועצתי עם בשר ודם׃ | 16 |
kotalisa ngai Mwana na Ye na nzela ya emoniseli mpo ete nakoka kosakola Ye kati na Bapagano, natunaki na mbala moko toli epai ya moto ata moko te.
גם לא עליתי ירושלים אל אשר היו שליחים לפני כי אם הלכתי לערב ומשם שבתי אל דמשק׃ | 17 |
Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.
אחרי כן מקץ שלש שנים עליתי ירושלים לראות את כיפא ואשב עמו חמשה עשר יום׃ | 18 |
Ezali sima na mibu misato nde nakendeki na Yelusalemi mpo na koyeba Petelo, mpe navandaki epai na ye mikolo zomi na mitano.
ואחר מן השליחים לא ראיתי זולתי את יעקב אחי אדנינו׃ | 19 |
Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo.
ואשר אני כתב אליכם הנה נגד האלהים כי לא אכזב׃ | 20 |
Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te.
אחרי כן באתי אל גלילות סוריא וקיליקיא׃ | 21 |
Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi.
אבל קהלות יהודה אשר במשיח הנה לא ידעו את פני׃ | 22 |
Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te,
רק זאת בלבד שמעו כי האיש ההוא אשר היה רדף אתנו מאז עתה הוא מבשר את האמונה אשר האבידה מלפנים׃ | 23 |
bayokaki kaka sango: « Moto oyo azalaki konyokola biso na kala akomi sik’oyo koteya kondima oyo azalaki koluka kobebisa. »
Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai.