< הָשֵּׁנִית אֶל־הַקּוֹרִנְתִּיִים 13 >

זאת הפעם השלישית אשר אבוא אליכם על פי שנים עדים או שלשה עדים יקום כל דבר׃ 1
Ekozala mbala na ngai ya misato ya koya epai na bino. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
מקדם אמרתי בהיותי אצלכם בפעם השנית ומקדם אני אמר וכתב עתה ברחקי מכם לאשר חטאו לפני מזה ולכל הנשארים כי בשובי לבוא לא אחוס׃ 2
Nasilaki kokebisa bino tango nayaki epai na bino mpo na mbala ya mibale, mpe, wana nazali nanu mosika na bino, nazali kozongela yango lisusu epai ya bato oyo basalaki masumu liboso mpe epai ya bato nyonso, ete, tango nakoya lisusu, nakoyokela moto ata moko te mawa,
יען בקשכם לבחן את המשיח המדבר בי אשר איננו חלש לכם כי אם גבור הוא בתוככם׃ 3
lokola bozali kosenga elembo oyo ezali kolakisa ete Klisto alobaka na nzela na ngai; pamba te azali na bolembu te mpo na bino, kasi asalaka na nguya kati na bino.
כי אם גם נצלב בחלשה אכן חי הוא בגבורת אלהים ואם גם חלשים בו אנחנו אכן נחיה עמו בגבורת אלהים לנגדכם׃ 4
Solo, atako babakaki Ye na ekulusu kati na bolembu, kasi azali na bomoi na nzela ya nguya ya Nzambe. Biso mpe ndenge moko: tozali na bolembu kati na Ye, kasi tokomilakisa bato ya bomoi elongo na Ye na nzela ya nguya ya Nzambe, na lolenge na biso ya kosala mpo na bolamu na bino.
נסו נא אתכם אם באמונה אתם בחנו אתכם או האינכם ידעים את נפשכם כי ישוע המשיח בכם אם לא כי נמאסים אתם׃ 5
Bomimeka bino moko mpe botala soki bozali kati na kondima; bomitala penza bino moko malamu. Boyebi te ete Yesu-Klisto azali kati na bino? Loba ete bosila kokweya liboso ya komekama.
אבל אקוה כי תדעו אשר אנחנו איננו נמאסים׃ 6
Kasi nazali na elikya: bokoyeba solo ete biso tokweyaki te liboso ya komekama.
ואני מתחנן אל האלהים אשר לא תעשו כל רע לא למען נראה אנחנו נאמנים כי אם למען תעשו אתם את הטוב ואנחנו נהיה כנמאסים׃ 7
Sik’oyo, tozali kobondela Nzambe mpo ete bosala mabe ata moko te; ezali te mpo bato bamona ete biso tolonga komekama, kasi mpo ete bino bosala bolamu, mpe biso tomonana lokola bato oyo balonga te.
כי אין אנחנו יכולים לעשות מאומה לנגד האמת כי אם בעד האמת׃ 8
Pamba te tozali na nguya te ya kotelemela solo, kasi tozali kaka na nguya ya kokokisa yango.
כי נשמח אם חלשים אנחנו ואתם גבורים ועל זאת גם נתפלל על אשר תכוננו׃ 9
Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.
ובעבור זאת כתבתי את אלה בהיותי ברחוק למען אשר לא אצטרך בקרבי אליכם לדבר אתכם משפטים לפי הרשות אשר נתנה לי האדון לבנות ולא להרוס׃ 10
Yango wana, nazali kokomela bino makambo yango nyonso, awa nazali nanu mosika na bino, mpo ete, tango nakoya, bomona ngai te lokola moto ya makambo makasi na lolenge na ngai ya kosalela bokonzi oyo Nkolo apesaki ngai mpo na kolendisa kondima na bino, kasi mpo na kokweyisa yango te.
ובכן אחי שמחו והתכוננו התנחמו ויהי לכם לב אחד אהבו השלום ואלהי האהבה והשלום יהי עמכם׃ 11
Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo: Bosepelaka! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.
שאלו לשלום איש את רעהו בנשיקה הקדושה הקדושים כלם שאלים לשלומכם׃ 12
Bopesanaka mbote na beze ya bule.
13
Basantu nyonso oyo bazali awa batindeli bino mbote.
חסד האדון ישוע המשיח ואהבת האלהים והתחברות רוח הקדש עם כלכם אמן׃ 14
Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto, bolingo ya Nzambe mpe lisanga na Molimo Mosantu ezala na bino nyonso!

< הָשֵּׁנִית אֶל־הַקּוֹרִנְתִּיִים 13 >