< Psalms 37 >

1 [By David.] Do not fret because of evildoers, neither be envious against those who work unrighteousness.
Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te;
2 For they shall soon be cut down like the grass, and wither like the green herb.
pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti.
3 Trust in YHWH, and do good. Dwell in the land, and enjoy safe pasture.
Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu, vanda kati na mokili mpe lia na kimia.
4 Also delight yourself in YHWH, and he will give you the desires of your heart.
Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi, mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.
5 Commit your way to YHWH. Trust also in him, and he will act.
Kaba bomoi na yo epai na Yawe, tia elikya kati na Ye, mpe akosala:
6 And he will make your righteousness go forth as the light, and your justice as the noonday.
akongengisa bosembo na yo lokola pole, makoki na yo lokola moyi ya midi.
7 Rest in YHWH, and wait patiently for him. Do not fret because of him who prospers in his way, because of the man who makes wicked plots happen.
Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.
8 Cease from anger, and forsake wrath. Do not fret, it leads only to evildoing.
Boya kanda mpe kosilika te; kotomboka te, noki te okosala mabe.
9 For evildoers shall be cut off, but those who wait for YHWH shall inherit the land.
Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango.
10 For yet a little while, and the wicked will be no more. Yes, though you look for his place, he isn't there.
Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te; ata oluki ye, okomona ye te.
11 But the humble shall inherit the land, and shall delight themselves in the abundance of peace.
Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi.
12 The wicked plots against the just, and gnashes at him with his teeth.
Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.
13 YHWH will laugh at him, for he sees that his day is coming.
Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.
14 The wicked have drawn out the sword, and have bent their bow, to cast down the poor and needy, to kill those who are upright in the way.
Bato mabe babimisi mipanga mpe babongisi batolotolo mpo na kokweyisa mobola mpe moto oyo akelela, mpo na koboma bato oyo batambolaka alima.
15 Their sword shall enter into their own heart. Their bows shall be broken.
Kasi mipanga na bango ekotobola mitema na bango moko, mpe batolotolo na bango ekobukana.
16 Better is a little that the righteous has, than the abundance of many wicked.
Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe,
17 For the arms of the wicked shall be broken, but YHWH upholds the righteous.
pamba te nguya ya bato mabe ekosila, kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.
18 YHWH knows the days of the perfect. Their inheritance shall be forever.
Yawe ayebi mikolo ya bato bazangi pamela, mpe libula na bango ekowumela mpo na seko.
19 They shall not be disappointed in the time of evil. In the days of famine they shall be satisfied.
Na tango ya pasi, bakokawuka te; na mikolo ya nzala, bakozala na bilei ebele.
20 But the wicked shall perish. The enemies of YHWH shall be like the burning of an oven. They will vanish—vanish like smoke.
Kasi bato mabe bakokufa, banguna ya Yawe bazali lokola fololo ya elanga, bakolimwa lokola molinga.
21 The wicked borrow, and do not pay back, but the righteous give generously.
Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka.
22 For such as are blessed by him shall inherit the land. Those who are cursed by him shall be cut off.
Bato oyo Yawe apambolaka bakozwa mokili lokola libula na bango, kasi ba-oyo alakelaka mabe bakolimwa.
23 The steps of a man are established by YHWH, and he delights in his way.
Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye;
24 Though he stumble, he shall not fall, for YHWH holds him up with his hand.
ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te; pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
25 I have been young, and now am old, yet I have not seen the righteous forsaken, nor his children begging for bread.
Nazalaki elenge, mpe sik’oyo nakomi mobange, namoni nanu te moto ya sembo kosundolama to bana na ye kokoma kosenga-senga bilei.
26 All day long he deals graciously and lends, and his offspring are a blessing.
Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.
27 Turn away from evil, and do good. Live securely forever.
Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, okovanda na mokili mpo na libela;
28 For YHWH loves justice, and doesn't forsake his faithful ones. They are preserved forever, but the children of the wicked shall be cut off.
pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
29 The righteous shall inherit the land, and live in it forever.
Bato ya sembo bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakovanda kuna seko na seko.
30 The mouth of the righteous talks of wisdom. His tongue speaks justice.
Monoko ya moto ya sembo ebimisaka bwanya, mpe lolemo na ye elobaka kolanda bosembo.
31 The law of his God is in his heart. None of his steps shall slide.
Mobeko ya Nzambe na ye ezali kati na motema na ye, makolo na ye ebetaka libaku te.
32 The wicked watches the righteous, and seeks to kill him.
Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye,
33 YHWH will not leave him in his hand, nor condemn him when he is judged.
kasi Yawe akosundola moto ya sembo te kati na maboko ya moto mabe, mpe akokweyisa ye te na kosambisama.
34 Wait for YHWH, and keep his way, and he will exalt you to inherit the land. When the wicked are cut off, you shall see it.
Zala na elikya kati na Yawe mpe batela nzela na Ye; akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo, mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
35 I have seen the wicked wielding great power, and towering like a cedar of Lebanon.
Namonaki moto mabe mpe na kanza kokoma na nguya mpe kofuluka lokola nzete oyo ezali kokola na mabele na yango,
36 And I passed by, and look, he was not. And I looked for him, but he could not be found.
kasi alekaki noki mpe azalaki lisusu te; nalukaki ye, kasi namonaki ye lisusu te.
37 Observe the blameless, and see the upright, for there is a future for the man of peace.
Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.
38 As for transgressors, they shall be destroyed together. The future of the wicked shall be cut off.
Kasi batomboki bakobebisama, tango oyo ezali koya ezali te mpo na bato mabe.
39 The salvation of the righteous is from YHWH. He is their stronghold in the time of trouble.
Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango, oyo batonga makasi.
40 And YHWH helps them, and rescues them. He rescues them from the wicked, and saves them, Because they have taken refuge in him.
Yawe asungaka mpe akangolaka bango, akangolaka bango wuta na maboko ya bato mabe mpe abikisaka bango, pamba te babombamaka kati na Ye.

< Psalms 37 >