< Exodus 10 >
1 The Lord told Moses, “Go and see Pharaoh, because it was me who gave him and his officials a stubborn attitude so that I may perform my miracles before them.
Yawe alobaki na Moyize: « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,
2 This is so you can tell your children and grandchildren how I made the Egyptians look foolish by doing these miracles among them, and so that you may know that I am the Lord.”
mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
3 Moses and Aaron went to Pharaoh and told him, “This is what the Lord, the God of the Hebrews, says: ‘How long are you going to refuse to humble yourself before me? Let my people go, so that they can worship me.
Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye: « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi: ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai.
4 If you refuse to let my people leave, tomorrow I will send a plague of locusts into your country.
Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo.
5 There will be so many of them that they'll cover the ground so no one can see it. They will eat whatever crops were left by the hail, as well as every tree growing in your fields.
Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga.
6 They will swarm into your houses and into the houses of all your officials—in fact into the houses of every Egyptian. This is something that none of your forefathers ever saw from the time they arrived in this country.’” Then Moses and Aaron turned and left Pharaoh.
Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › » Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon.
7 Pharaoh's officials came to him and asked, “How long are you going to let this man cause us trouble? Let these people go so they can worship the Lord their God. Don't you realize that Egypt has been destroyed?”
Bakalaka ya Faraon balobaki na ye: — Kino tango nini moto oyo akozala motambo mpo na biso? Tika bango bakende kogumbamela Yawe, Nzambe na bango. Ozali komona te ete Ejipito ebebi?
8 Moses and Aaron were brought back to see Pharaoh. “Go and worship the Lord your God,” he told them. “But who of you will be going?”
Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon; mpe Faraon alobaki na bango: — Bokende kogumbamela Yawe, Nzambe na bino. Kasi banani oyo bakokende?
9 “We will all go,” Moses replied. “Young and old, sons and daughters—and we'll take our flocks and herds with us, for we're going to have a religious festival for the Lord.”
Moyize azongisaki: — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe.
10 “The Lord really would have to be with you if I let your children go with you!” Pharaoh answered. “Clearly you're planning some kind of evil trick!
Faraon alobaki na bango: — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe.
11 So no! Only the men can go and worship the Lord, because that's what you've been asking for.” Then he had Moses and Aaron thrown out.
Ekosalema bongo te! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai. Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon.
12 The Lord told Moses, “Lift up your hand over Egypt, so that the locusts may swarm over it and eat every plant in the country—everything that was left by the hail.”
Yawe alobaki na Moyize: — Sembola loboko na yo na mokili ya Ejipito mpo ete obimisa mabanki kati na mokili yango mpe mabanki yango elia matiti nyonso ya bilanga, biloko nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te.
13 Moses held out his staff over Egypt, and all through that day and night the Lord sent an east wind blowing over the land. By the time morning came the east wind had brought in the locusts.
Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki.
14 The locusts swarmed across the land and settled in every part of the country. There had never been such a swarm of locusts ever before, and there won't be ever again.
Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te.
15 They covered the ground until it looked black, and they ate up all the plants in the fields and all the fruit on the trees that had been left by the hail. Not a single green leaf was left on any tree or plant anywhere in Egypt.
Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te: matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.
16 Pharaoh called urgently for Moses and Aaron and said, “I have sinned against the Lord your God and against you.
Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki: — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.
17 So please forgive my sin just this one time and plead with the Lord your God, asking him to at least take away this deathly plague from me.”
Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai.
18 Moses left Pharaoh and prayed to the Lord.
Moyize atikaki Faraon mpe abondelaki Yawe.
19 The Lord changed the direction of the wind so that a strong westerly wind blew the locusts into the Red Sea. There wasn't a single locust left anywhere in Egypt.
Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito.
20 But the Lord made Pharaoh stubborn, and he would not let the Israelites go.
Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende.
21 The Lord told Moses, “Lift your hand toward the sky so that darkness will fall over Egypt, darkness so thick that it can be felt.”
Yawe alobaki na Moyize: — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba.
22 Moses lifted up his hand toward heaven, and the whole of Egypt went completely dark for three days.
Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato.
23 No one could see anyone else, and no one moved from where they were for three days. But there was still light where all the Israelites lived.
Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.
24 Eventually Pharaoh called for Moses. “Go and worship the Lord,” he said. “Just leave your flocks and herds here. You can even take your children with you.”
Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki: — Bokende kogumbamela Yawe; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino.
25 But Moses replied, “You must also let us have animals for sacrifices and burnt offerings, so we can offer them to the Lord our God.
Kasi Moyize alobaki: — Okopesa biso mbeka mpe makabo ya kotumba oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso.
26 Our livestock have to go with us too—not a single animal will be left behind. We'll need some of them to worship the Lord our God, and we won't know how we are to worship the Lord until we get there.”
Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe.
27 But the Lord made Pharaoh stubborn, and he would not let them go.
Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende.
28 Pharaoh shouted at Moses, “Get out of here! I don't want to see you ever again! If I ever do see you again you'll die!”
Faraon alobaki na Moyize: — Longwa liboso na ngai mpe keba na yo! Koya lisusu liboso na ngai te! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa.
29 “May it be as you say,” Moses replied. “I won't see you again.”
Moyize azongisaki: — Ndenge kaka olobi, nakotikala koya lisusu liboso na yo te!