+ Genesis 1 >
1 In the beginning God created the heavens and the earth.
Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili.
2 The earth was formless and empty, and darkness covered the surface of the deep. The Spirit of God moved over the surface of the waters.
Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi.
3 God said, “Let there be light!” and there was light.
Mpe Nzambe alobaki: « Tika ete pole ezala! » Mpe pole ezalaki.
4 God saw that the light was good, and he separated the light from the darkness.
Nzambe amonaki ete pole ezali malamu, akabolaki pole na molili.
5 God called the light “day,” and he called the darkness “night.” So there was evening, and then the morning, making day one.
Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko.
6 God said, “Let there be an expanse in the middle of the waters to divide the waters.”
Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango! »
7 So God made an expanse to divide the waters that were above from the waters that were below. And that's what happened.
Nzambe akelaki etando; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
8 God called the expanse, “sky.” So there was evening, and then the morning, making day two.
Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale.
9 God said, “Let the waters below the sky collect together in one place so that the land may appear.” And so it was.
Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima! » Yango esalemaki mpe bongo.
10 God called the land “earth” and the waters “seas.” God saw that it was good.
Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu.
11 God said, “Let the earth produce vegetation—plants that produce seeds and trees that produce seeded fruit—each one according to its own kind.” And that's what happened.
Nzambe alobaki: « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko! » Yango esalemaki mpe bongo.
12 The earth produced vegetation—plants that produce seeds and trees that produce seeded fruit—each one according to its own kind. God saw that it was good.
Mabele ebimisaki matiti, milona oyo ebotaka nkona kolanda lolenge ya molona moko na moko mpe banzete oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
13 So there was evening, and then the morning, making day three.
Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya misato.
14 God said, “Let there be lights in the sky to separate day from night, and to provide a way to mark seasons, days, and years.
Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,
15 They shall be lights in the sky to shine on the earth.” And that's what happened.
mpe mpo na kongengisa mokili! » Yango esalemaki mpe bongo.
16 God created two great lights: the larger one in charge of the day, and the smaller one in charge of the night. He created the stars too.
Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole: oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto.
17 God placed these lights in the sky to shine upon the earth,
Nzambe atiaki yango na etando ya likolo mpo ete engengisa mokili,
18 to be in charge of the day and in charge of the night, and to separate light from darkness. God saw that it was good.
engenga na moyi mpe na butu, mpe ekabola pole na molili. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
19 So there was evening, and then the morning, making day four.
Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya minei.
20 God said, “Let the waters be full of living creatures, and let birds fly above the earth in the sky.”
Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo! »
21 So God created huge sea creatures and all the living things that swim and fill the waters, each one according to its own kind; and every bird that flies, each one according to its own kind. God saw that it was good.
Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi: ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu: ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
22 God blessed them and said, “Reproduce and increase, and fill the waters of the seas, and let the birds increase on the earth.”
Nzambe apambolaki yango mpe alobaki: « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. »
23 So there was evening, and then the morning, making day five.
Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano.
24 God said, “Let the land produce living creatures, each one according to its own kind—the livestock, the creatures that run along the ground, and the wild animals, each one according to its own kind.” And that's what happened.
Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango: bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba! » Yango esalemaki mpe bongo.
25 God made the wild animals, the livestock, and the creatures that run along the ground, all according to their own kind. God saw that it was good.
Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango: bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu.
26 God said, “Let us make human beings in our image who are like us. They will have authority over the fish of the sea and the birds of the air, over the livestock, and over the whole of the earth and every creature that moves on it.”
Bongo Nzambe alobaki: « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike! »
27 So God created human beings in his own image. He created them in the image of God. He created them male and female.
Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, akelaki bango na elilingi ya Nzambe; akelaki bango mobali mpe mwasi.
28 God blessed them and told them, “Reproduce, increase, and spread throughout the earth and control it; exercise authority over the fish of the sea and the birds of the air and every creature that moves on the earth.”
Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango: « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
29 God said, “Look, I'm giving you as your food every seed-bearing plant anywhere on earth, and every tree that produces fruit with seeds.
Bongo Nzambe alobaki: « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino.
30 I'm giving all the green plants to all the land animals, to the birds, and to every creature that moves on the earth—to every living thing.” And that's what happened.
Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » Yango esalemaki mpe bongo.
31 God saw everything that he had created, and yes, it was very good. So there was evening, and then the morning, making day six.
Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.