< Jeremiah 1 >

1 These are the words of Jeremiah son of Hilkiah, one of the priests in Anathoth in the territory of Benjamin.
Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye.
2 The word of the LORD came to Jeremiah in the thirteenth year of the reign of Josiah son of Amon king of Judah,
Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi,
3 and through the days of Jehoiakim son of Josiah king of Judah, until the fifth month of the eleventh year of Zedekiah son of Josiah king of Judah, when the people of Jerusalem went into exile.
mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu.
4 The word of the LORD came to me, saying:
Yawe alobaki na ngai:
5 “Before I formed you in the womb I knew you, and before you were born I set you apart and appointed you as a prophet to the nations.”
— Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo; liboso ete obotama, nabulisaki yo: naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo.
6 “Ah, Lord GOD,” I said, “I surely do not know how to speak, for I am only a child!”
Nazongisaki: — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge!
7 But the LORD told me: “Do not say, ‘I am only a child.’ For to everyone I send you, you must go, and all that I command you, you must speak.
Kasi Yawe alobaki na ngai: — Koloba te: « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo.
8 Do not be afraid of them, for I am with you to deliver you,”
Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.
9 Then the LORD reached out His hand, touched my mouth, and said to me: “Behold, I have put My words in your mouth.
Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki: — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.
10 See, I have appointed you today over nations and kingdoms to uproot and tear down, to destroy and overthrow, to build and plant.”
Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.
11 And the word of the LORD came to me, asking, “Jeremiah, what do you see?” “I see a branch of an almond tree,” I replied.
Sima na yango, Yawe atunaki ngai: — Jeremi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona etape ya nzete ya amande.
12 “You have observed correctly,” said the LORD, “for I am watching over My word to accomplish it.”
Yawe alobaki na ngai: — Omoni malamu, pamba te nasenzelaka maloba na Ngai mpo na kokokisa yango.
13 Again the word of the LORD came to me, asking, “What do you see?” “I see a boiling pot,” I replied, “and it is tilting toward us from the north.”
Yawe atunaki ngai lisusu: — Ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona nzungu moko ezali kotoka, etengama na ngambo ya nor.
14 Then the LORD said to me, “Disaster from the north will be poured out on all who live in the land.
Yawe alobaki na ngai: — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili.
15 For I am about to summon all the clans and kingdoms of the north,” declares the LORD. “Their kings will come and set up their thrones at the entrance of the gates of Jerusalem. They will attack all her surrounding walls and all the other cities of Judah.
Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. Bakonzi na bango bakoya kotia bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi; bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda.
16 I will pronounce My judgments against them for all their wickedness, because they have forsaken Me to burn incense to other gods and to worship the works of their own hands.
Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki: basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu, mpe bakomaki kogumbamela banzambe oyo basalaki na maboko na bango.
17 Get yourself ready. Stand up and tell them everything that I command you. Do not be intimidated by them, or I will terrify you before them.
Mibongisa, yika mpiko! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.
18 Now behold, this day I have made you like a fortified city, an iron pillar, and bronze walls against the whole land—against the kings of Judah, its officials, its priests, and the people of the land.
Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, likonzi ya ebende mpe mir ya ebende mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba: liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, ya Banganga-Nzambe na yango mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango.
19 They will fight against you but will never overcome you, since I am with you to deliver you,” declares the LORD.
Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.

< Jeremiah 1 >