< 箴言 23 >
Soki ovandi mpo na kolia mesa moko elongo na mokonzi, tala malamu moto oyo azali liboso na yo.
Tia mbeli na mongongo na yo soki ozalaka lokoso.
Kolula te bilei na ye ya kitoko, pamba te, tango mosusu, ezali na yango bololo.
Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango.
5 你岂要定睛在虚无的钱财上吗? 因钱财必长翅膀,如鹰向天飞去。
Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.
Kolia te bilei ya moto oyo azali kotala yo na miso mabe mpe kolula te bilei na ye ya kitoko,
7 因为他心怎样思量, 他为人就是怎样。 他虽对你说,请吃,请喝, 他的心却与你相背。
pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka: « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.
8 你所吃的那点食物必吐出来; 你所说的甘美言语也必落空。
Okosanza eteni oyo oliaki, mpe maloba na yo ya kitoko ekokende pamba.
9 你不要说话给愚昧人听, 因他必藐视你智慧的言语。
Kolobaka na zoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.
10 不可挪移古时的地界, 也不可侵入孤儿的田地;
Kozongisa te na sima mondelo ya kala mpe kokota te na bilanga ya bana bitike,
11 因他们的救赎主大有能力, 他必向你为他们辨屈。
pamba te Molobeli na bango azalaka makasi, akozwa makambo na bango na maboko mpo na kotelemela yo.
Tika ete motema na yo endimaka kotosa mibeko, mpe matoyi na yo eyokaka maloba ya boyebi!
13 不可不管教孩童; 你用杖打他,他必不至于死。
Kozangisa te kopesa mwana etumbu; soki obeti ye fimbu, akokufa te.
14 你要用杖打他, 就可以救他的灵魂免下阴间。 (Sheol )
Na kobeta ye fimbu, okokangola molimo na ye na lifelo. (Sheol )
Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya, motema na ngai ekozala na esengo.
Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo, soki bibebu na yo elobi makambo ya sembo.
Tika ete motema na yo elulaka te bato ya masumu, kasi zalaka tango nyonso na posa makasi ya kotosa Yawe;
pamba te suka na yo ekozala solo malamu mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.
19 我儿,你当听,当存智慧, 好在正道上引导你的心。
Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya, batela motema na yo kati na nzela ya sembo.
Kozala esika moko te na balangwi masanga to na bato ya lokoso,
21 因为好酒贪食的,必致贫穷; 好睡觉的,必穿破烂衣服。
pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola, mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka.
22 你要听从生你的父亲; 你母亲老了,也不可藐视她。
Yokela tata oyo aboti yo, mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.
23 你当买真理; 就是智慧、训诲,和聪明也都不可卖。
Luka bosolo, kasi koteka yango te; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.
24 义人的父亲必大得快乐; 人生智慧的儿子,必因他欢喜。
Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi, mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo!
26 我儿,要将你的心归我; 你的眼目也要喜悦我的道路。
Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai!
Pamba te mwasi ya ndumba azali lokola libulu ya monene, mpe mwasi ya mopaya azali lokola libulu ya mozindo.
Mwasi ya ndumba atelemaka na ekenge lokola moyibi mpe akomisaka mibali bazoba koleka.
29 谁有祸患?谁有忧愁? 谁有争斗?谁有哀叹? 谁无故受伤?谁眼目红赤?
Mpo na nani: « Ah ngai, mawa! » Mpo na nani: « Eh! » Mpo na nani koswanaswana? Mpo na nani kolelalela? Mpo na nani kowelana ezanga tina? Mpo na nani kotelisa miso?
Mpo na bato oyo bawumelaka liboso ya masanga ya vino, mpo na bato oyo bamelaka masanga ya makasi.
31 酒发红,在杯中闪烁, 你不可观看, 虽然下咽舒畅, 终久是咬你如蛇,刺你如毒蛇。
Kotalaka te masanga ya vino tango ezali motane, tango ezali kongala kati na kopo mpe kokita na pete na mongongo.
Na suka na yango, ekoswa yo lokola nyoka mpe ekotia yo minu lokola etupa.
Miso na yo ekomona biloko na ndenge ya kokamwa, mpe motema na yo ekobimisa makambo ya bozoba.
Boye, okokoma lokola moto oyo alali kati na ebale monene, mpe lokola moto oyo alali na songe ya nzete ya molayi.
35 你必说:人打我,我却未受伤; 人鞭打我,我竟不觉得。 我几时清醒,我仍去寻酒。
Okoloba: « Babeti ngai, kasi nazali koyoka pasi te; babeti ngai fimbu, kasi nazali koyoka eloko te! Tango nini nakolamuka? Nakozongela lisusu komela vino. »