< 詩篇 142 >

1 我高聲向上主呼求, 我高聲向天主求助。
Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga. Na mongongo makasi, nazali koganga epai na Yawe; na mongongo makasi, nazali kobondela Yawe.
2 我向他傾吐我的愁苦,我向他陳訴我的憂慮。
Natalisi likambo na ngai liboso na Ye, natandi pasi na ngai liboso na Ye.
3 當我精神愁苦的時候,惟有您知悉我的路途。在我行走的道路途中;他們給我設下陷阱。
Soki molimo na ngai elembi kati na ngai, Yo oyebi epai nazali kokende. Batieli ngai motambo na nzela oyo nazali kotambola.
4 我向右觀察細看,沒有一個熟悉我的人!沒有一人我可投奔,沒有一人為我操心。
Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai!
5 上主,我今呼號說:你是我的避難所,在這活人的地方,你就是我的福爵。
Yawe, nagangi epai na Yo! Nalobi: « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi! »
6 求您傾聽我的哀號,因我十分可憐無靠,求您救我脫離迫害我的人,因他們是比我強悍的人。
Yoka koganga na ngai, pamba te nazali na pasi makasi! Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai, pamba te baleki ngai na makasi.
7 求您引領我出離監牢,好讓我讚美您的名號。義人前呼後擁歡迎我,因為您大量恩待了我。
Bimisa ngai na boloko mpo ete nasanzola Kombo na Yo! Bato ya sembo bakoya kozingela ngai sima na Yo kosalela ngai bolamu.

< 詩篇 142 >