< 箴言 17 >

1 乾餅一張而平安共食,勝於滿屋佳餚而互相爭吵。
Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.
2 聰明的僕人必能管治任性的兒子,且可與弟兄們共分產業。
Mosali ya bwanya akozala na bokonzi likolo ya mwana mobali oyo asalaka soni, mpe akozwa libula elongo na bandeko.
3 鍋煉銀,爐煉金,上主煉人心。
Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
4 奸詐的人,愛聽胡言亂語;說謊的人,輕信是非長短。
Moto oyo asalaka mabe ayokaka maloba ya bato mabe, mokosi apesaka litoyi na ye na maloba ya lokuta.
5 嘲笑窮人的是凌辱他的造主;幸災樂禍的,必不能脫免懲罰。
Moto oyo anyokolaka mobola anyokolaka Mokeli ya mobola yango; moto oyo asepelaka na pasi ya moninga akozanga te kozwa etumbu.
6 孫兒是老人的冠冕,父親是兒女的光榮。
Bakitani bazali motole ya bakoko, mpe baboti bazali lokumu ya bana.
7 優雅的言詞,不適宜於愚人;虛偽的狂語,更不宜於君王。
Ndenge maloba ya lokumu ebongi te mpo na moto mabe, ndenge mpe maloba ya lokuta ebongi te mpo na mokonzi.
8 賄賂在饋贈者眼中,有如寶石;不論他要轉向何方,無往不利。
Kanyaka ezalaka lokola kisi na miso ya moto oyo azali na yango; alongaka na esika nyonso oyo akendaka.
9 掩飾他人的過錯,可獲得友愛;屢念舊日的過惡,則離間友誼。
Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.
10 對明智人一句指責,勝過對愚昧人百次杖擊。
Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.
11 暴徒只求叛亂,但有殘酷使者,奉命前來對付。
Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.
12 寧願遇見失掉幼子的母熊,不願逢著正在發狂的愚人。
Kokutana na ngombolo oyo babotoli bana ezali malamu koleka kokutana na zoba oyo azali kati na bolema.
13 誰以怨報德,災禍必不離開他的家。
Pasi etikaka ata moke te ndako ya moto oyo azongisaka mabe mpo na malamu.
14 爭論的開端,如水之破堤;在激辯之前,應極加制止。
Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.
15 宣判罪人無罪,判定義人有罪:二者同為上主所憎惡。
Moto oyo alongisaka bato mabe mpe moto oyo akweyisaka bato ya sembo bazali, bango mibale, nkele na miso ya Yawe.
16 愚昧的人,既沒有頭腦,手執金錢買智慧,又何益之有﹖
Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te!
17 朋友平時常相愛,唯在難中見兄弟。
Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.
18 常為人擊掌作保,實是個無知之徒。
Moto oyo azangi mayele abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya.
19 好爭辯的人,實喜愛罪過;高舉門戶的,必自趨滅亡。
Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu; moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo amilukelaka kokweya.
20 誰存心欺詐,不會得幸福;誰搬弄是非,必陷於災禍。
Moto ya motema mabe abongaka te, mpe moto ya lolemo ya lokuta akomona pasi.
21 生糊塗孩子的,只有悲哀;糊塗人的父親,毫無樂趣。
Kozala na mwana ya zoba esalaka pasi na motema, mpe tata ya moto ya liboma akotikala kozala na esengo te.
22 愉快的心,是良好的治療;神志憂鬱,能使筋骨枯萎。
Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.
23 惡人在大衣下受賄賂,是為顛倒正義的判詞。
Moto mabe azwaka kanyaka na nkuku mpo na kobebisa nzela ya bosembo.
24 精明的人,常面向智慧;愚者的眼,向地極呆望,
Bwanya emonanaka na elongi ya moto ya mayele, kasi miso ya zoba ekendaka kino na suka ya mokili.
25 愚昧的兒子,是他父親的痛苦,是他生母的憂傷。
Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.
26 科罰無辜,已屬不當;杖責君子,更屬不義。
Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu, mpe ezali malamu te kobeta bato ya lokumu na miso ya bosembo.
27 智者必沉默寡言,達人必心神鎮定。
Moto oyo abatelaka monoko na ye azali na boyebi; moto oyo alengaka-lengaka te azali mayele.
28 愚人不發言,亦可充作智者;若謹口慎言,亦可視為哲人。
Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia, amonanaka lokola moto ya bwanya; moto oyo akangaka monoko na ye amonanaka lokola moto ya mayele.

< 箴言 17 >