< 箴言 16 >

1 內心策劃在於人,應允卻在於上主。
Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.
2 對自己的行為,人都自覺無瑕;但審察心靈的,卻是上主。
Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.
3 將你的作為委託於上主,這樣你的計劃必會成功。
Pesa misala na yo epai na Yawe, mpe mabongisi na yo ekokokisama.
4 上主所造的各有其用意,連惡人也有不幸的一日。
Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
5 居心傲慢的,上主必厭惡;這一類的人,逃不掉懲罰。
Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe; solo, akozanga te kozwa etumbu.
6 藉慈善忠誠,可補贖罪過;藉敬畏上主,可避免罪惡。
Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
7 世人的行徑,若中悅上主,他必使仇敵,再與他和好。
Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.
8 收入少而守正義,勝於進款多而行不義。
Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.
9 人心裏都策劃自己的行徑;但他的步伐卻由上主支配。
Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.
10 神明的斷語,出自君王口;他口下判斷,必不致差錯。
Maloba ya mokonzi ezali lokola Liloba na Nzambe, ekweyaka te kati na kosambisama.
11 天秤和稱盤,屬上主所有;囊中的法碼,全由他制定。
Emekelo kilo ya sembo mpe basani oyo bamekelaka kilo ezali ya Yawe, mpe kilo nyonso ya saki ezali likambo na Ye.
12 君王最厭惡的是作惡,因為王位賴正義而立。
Ezali malamu te mpo na mokonzi kosala mabe, pamba te bokonzi elendisamaka nde na nzela ya bosembo.
13 正義的唇舌,為君王所喜悅;說話正直者,為君王所愛戴。
Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.
14 君王的震怒,是死訊的使者;但是智慧人,能平息王怒。
Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.
15 君王容光煥發,人即可活命;君王的恩澤,有如春雲時雨。
Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga, elingi koloba: bomoi. Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka.
16 獲得智慧,勝於獲得黃金;獲得智慧,勝於獲得白銀。
Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
17 正直人的行徑遠離邪惡,謹守行為的人必確保生命。
Bato ya sembo batambolaka na nzela oyo epesaka mabe mokongo. Moto oyo abatelaka motema na ye abatelaka nde bomoi na ye.
18 驕橫是滅亡的先聲,傲慢是隕落的前導。
Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
19 謙下與貧民共處,勝於與驕傲人分贓。
Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.
20 細聽勸言的,必將受益;信賴上主的,真是有福。
Moto oyo akanisaka na tina na makambo amonaka bolamu. Esengo na moto oyo atiaka elikya na Yawe.
21 有慧心的人,被稱為哲人;溫和的口吻,更具說服力。
Babengaka moto oyo azali na motema ya bwanya moto ya mayele, mpe bibebu ya kimia ebakisaka boyebi.
22 為有智識的人,智識是生命的泉源;然而糊塗愚昧,卻是愚昧人的懲罰。
Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
23 智慧人的心,使自己的嘴靈巧,使自己的唇舌,更具說服力。
Motema ya moto ya bwanya ekomisaka monoko na ye mayele, mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi.
24 親切的言語,有如蜂蜜,使心靈愉快,使筋骨舒暢。
Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
25 有些道路,看來正直;走到盡頭,卻是死路。
Nzela mosusu emonanaka sembo na miso ya bato, nzokande, na suka, ememaka na kufa.
26 工人的胃口,催他勞作;工人的口腹,迫他工作。
Nzala etindaka mosali ete asala mosala, monoko na ye etindikaka ye na mosala.
27 無賴之徒,圖謀邪惡;他的嘴上,似有火燒。
Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.
28 乖戾的人,撒播爭端;告密的人,離間友情。
Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.
29 強橫的人,誘惑朋友;引他走入不正之徒。
Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.
30 誰緊閉眼睛,是在策劃陰謀;誰緊咬口唇,邪惡業已完成。
Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu.
31 皓首白髮,是尊榮的冠冕;只在正義的道上,方可獲得。
Suki ya pembe ezali motole ya nkembo; bazwaka yango na nzela ya bosembo.
32 有涵養的人,勝於勇士;克服自己的人,勝於克城的人。
Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.
33 人儘可在懷中抽籤,但決斷卻在乎上主。
Bakobetaka zeke kati na elamba ya Nganga-Nzambe, kasi mikano nyonso ewutaka na Yawe.

< 箴言 16 >