< 傳道書 8 >

1 有誰相似智者,有誰會解釋事理﹖智慧使人的面容煥發,使嚴肅的容貌變為溫和。
Nani azali lokola moto ya bwanya? Nani ayebi kolimbola makambo? Bwanya engengisaka elongi ya moto, mpe efungolaka elongi oyo ekangama.
2 為了向天主起的誓,你應遵守君王的命令;
Nalobi: Tosaka mitindo ya mokonzi, pamba te olapaki ndayi liboso ya Nzambe.
3 你不可由他面前倉猝離去,也不可行惡,因為凡他喜歡的事,都可隨意執行。
Kolongwaka na lombangu te liboso ya mokonzi mpe kobundelaka likambo ya mabe te, pamba te mokonzi asalaka kaka makambo oyo esepelisaka ye.
4 原來君王的話具有威力,誰敢向他說:「你做什麼﹖」
Lokola liloba ya mokonzi ezalaka na bokonzi, nani akoki koloba na ye: « Ozali kosala nini? »
5 遵守誡命的,不會遇到災禍;智者的心能辨識時機和審斷。
Moto nyonso oyo atosaka mibeko na ye akokweyela pasi te, mpe motema ya moto ya bwanya eyebaka tango ya malamu mpe lolenge ya malamu ya kosalela.
6 的確,事事都有定時和定案;但重大的負擔仍壓在人身上,
Pamba te, ezali na tango ya malamu mpe na lolenge ya malamu ya kosalela na likambo nyonso. Atako bongo, pasi ekweyelaka kaka moto.
7 因為人不知道將來要發生什麼事,有誰能告訴他,何時要發生﹖
Lokola moto moko te ayebi makambo oyo ekoya sima, nani akoki koyebisa moninga ndenge ekoyela ye?
8 沒有人有權將生氣保留不失,也沒有人能支配死期,戰場上沒有人能退役,邪惡救不了作惡的人。
Ndenge moto moko te azali na bokonzi likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango, ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi likolo ya mokolo na ye ya kufa. Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba, ndenge mpe misala mabe ebikisaka te bato oyo basalaka yango.
9 我看見了這一切,專心研究在太陽下所行的一切事:有時統治人的人,自受其害;
Namonaki makambo nyonso wana, tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi. Ezali na tango oyo moto amatelaka bato mosusu mpo na konyokola bango.
10 有時我看見惡人被抬去安葬,而行義的人卻離開聖處,而在城中被人遺忘:這也是虛幻。
Mpe lisusu, namonaki ete bazali kokunda bato mabe; bongo bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga na Esika ya bule bazalaki kokumisa bato mabe wana kati na engumba mpo na makambo oyo bazalaki kosala. Wana mpe ezali kaka pamba.
11 因為懲惡的定案未有迅速執行,世人因此充滿了行惡的偏向。
Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.
12 惡人雖百次行惡,仍享長壽,姑且不論;我確實知道,那敬畏天主的人,因他們在天主前起敬起畏,必得幸福;
Atako moto oyo asalaka masumu asali mabe mbala nkama moko mpe awumeli tango molayi na bomoi, nayebi solo ete bato oyo batosaka Nzambe bakozala bato ya esengo; pamba te bazali na botosi liboso na Ye.
13 而惡人必得不到幸福,他的時日如影,決不能久長,因為他不敬畏天主。
Nzokande, lokola bato mabe batosaka Nzambe te, makambo na bango mpe ekotambola malamu te, mpe mikolo ya bomoi na bango ekowumela te lokola elili.
14 在世上還有一件虛幻的事:就是義人所遭遇的,反如惡人所應得的;而惡人所遭遇的,反如義人所應得的;我遂說:這也是虛幻。
Ezali lisusu na eloko moko ya pamba oyo elekaka na mokili: bato ya sembo bazwaka lifuti oyo ebongi na bato mabe, mpe bato mabe bazwaka lifuti oyo ebongi na bato ya sembo. Nazali koloba solo ete wana mpe ezali kaka pamba.
15 為此,我稱讚快樂,因為在太陽下,人除了吃喝行樂外,別無幸福;因為這是人在天主賞他在太陽下的一生歲月內,從他的勞苦中,所獲得的幸福。
Bongo, nakumisaki esengo, pamba te ezali na eloko moko te na se ya moyi oyo eleki malamu mpo na moto, soki kaka te kolia, komela mpe kosepela. Boye esengo esengeli kobila ye kati na mosala na ye mikolo nyonso ya bomoi oyo Nzambe apesa ye na se ya moyi.
16 當我專心追求智慧,觀察人在世上,連黑夜白日都不能閉目安眠,所行的工作時,
Tango natiaki mayele na ngai mpo na koluka koyeba bwanya mpe kososola mosala ya moto kati na mokili, —ata soki miso na ye ezwaka pongi te, ezala na moyi to na butu—
17 我面對天主的一切作為,發覺人決不能知道在太陽下所發生的一切事。人雖然努力研究,終歸無法得知;縱然有智者以為知道了,仍是一無所知。
namonaki nyonso oyo Nzambe asala. Moto moko te akoki kososola makambo oyo elekaka na se ya moyi. Soki asali makasi mpo na koyeba, akotikala te kososola tina na yango; mpe ata soki moto ya bwanya abeti tolo ete ayebi, akotikala kaka kososola yango te.

< 傳道書 8 >