< 歷代志下 15 >

1 [阿匝黎雅的預言]那時,天主的神感動了敖德得的兒子阿匝黎雅,
Molimo ya Nzambe akitelaki Azaria, mwana mobali ya Odedi.
2 他便出來迎接阿撒,對他說:「阿撒,全猶大和本雅明人,請聽我的話:幾時你們與上主同在,上主也與你們同在;如果你們尋求他,他必讓你們尋到;但如果你們離棄他,他必離棄你們。
Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye: « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino!
3 將有一段長時期,以色列沒有真天主,沒有教導的司祭,也沒有法律;
Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.
4 但他們在遭離期間,必回心歸向上主,以色列的天主,必尋求他,他必讓他們尋到。
Kasi kati na pasi na bango, bazongelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele; balukaki Ye, mpe Ye amimonisaki epai na bango.
5 在那時期內,出入的人,都必得不到平安,各地所有的居民,必要遭受很大的混亂:
Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili.
6 這族攻擊那族,這城攻擊那城,因為天主必用種種災禍難為他們。
Ekolo moko ezalaki kobundisa ekolo mosusu, engumba moko ezalaki kobundisa engumba mosusu, pamba te Nzambe azalaki kokotisa mobulu kati na bango na nzela ya pasi ya lolenge nyonso.
7 至於你們,你們應當堅強,你們的手不要發軟,因為你們的作為必獲得賞報。」[阿撒的宗教改革]
Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »
8 阿撒一聽見這些話和預言,便壯了膽,將在猶大和本雅明全境,以及在厄弗辣因山地所佔領的各城內的可憎之物,一概除掉,重修上主門廊前的上主的祭壇,
Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
9 又召集了猶大和本雅明全民眾,以及在他們中間寄居的厄弗辣因人、默納協人和西默盎人,─因為有許多人由以色列來投奔阿撒,因為他們看見上主,他的天主是與他同在。
Asangisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, elongo na bato oyo bawutaki na mabota ya Efrayimi, ya Manase mpe ya Simeoni, oyo bakomaki kovanda kati na bango, pamba te bana ebele ya Isalaele basanganaki na mokonzi Asa tango bamonaki ete Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye.
10 阿撒當國第十五年三月,他們聚集在耶路撒冷,
Basanganaki na Yelusalemi na sanza ya misato ya mobu ya zomi na mitano ya bokonzi ya Asa.
11 當天由所擄獲的戰利品,取出了七百頭牛,七千隻羊,祭獻給上主,
Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo.
12 結盟立約,要全心全意尋求上主,他們祖先的天主;
Basalaki boyokani na kolapa ndayi ete bakokangama na Yawe, Nzambe ya batata na bango, na mitema mpe na molimo na bango mobimba;
13 凡不尋求上主以色列天主的,不分老幼,不分男女,一律處死。
bongo moto nyonso oyo akokangama te na Yawe, Nzambe ya Isalaele, azala mwana to mokolo, tata to mama, basengeli koboma ye.
14 然後高聲歡呼,鳴號吹角,向上主起誓。
Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke.
15 全猶大人發了這誓,都非常高興,因為他們是全心起誓,全意尋求上主;因此上主也為他們所尋見,並使他們四境安寧。
Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso.
16 阿撒王廢除了他祖母瑪阿加作太后的權位,因為她給阿舍辣立了可恥的柱像;阿撒將柱像砍倒,打得粉碎,在克德龍谷焚燬,
Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron.
17 只有以色列的高丘沒有廢除;阿撒的心一生總是純全的。
Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye;
18 他又將他父親和他自己所獻的金銀並器具,送入天主的殿內。
azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki: palata, wolo mpe biloko mosusu.
19 此後,直到阿撒當國三十五年,從沒有過戰事。
Bitumba ezalaki lisusu te kino na mobu ya tuku misato na mitano ya bokonzi ya Asa.

< 歷代志下 15 >