< 歷代志下 14 >

1 阿彼雅與列祖同眠,葬仔達味城;他的兒子阿撒繼位為王。他在位時,國內平安了十年。
Abiya akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. Na tango oyo Asa azalaki mokonzi, mokili ezalaki na kimia mibu zomi.
2 [阿撒的熱誠和努力]阿撒行了上主他的天主視為善,視為正直得事,
Asa asalaki makambo ya malamu mpe ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
3 除掉了外邦的祭壇和高丘,毀壞了柱像,拆除了木偶,
Alongolaki bitumbelo ya banzambe ya bapaya mpe bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko mpe akweyisaki makonzi ya bikeko ya nzambe mwasi Ashera.
4 並命令猶大應尋求上主他們祖先的天主,遵行他的法律和誡命,
Apesaki mitindo na bato ya Yuda ete baluka Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe batosa mibeko mpe malako na Ye.
5 也鏟除了猶大各城內的高丘和太陽柱。那時,國家在他統治下安享太平。
Kati na bingumba nyonso ya Yuda, mokonzi Asa alongolaki bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo malasi. Boye, na tango na ye, mokili ezalaki na kimia.
6 他又在猶大修築了幾座堅城,因為境內平靖,數年沒有戰爭,上主賜予他平安。
Atongaki bingumba makasi kati na Yuda mpo ete mokili ezalaki na kimia. Na mibu wana, moto moko te abundisaki ye, pamba te Yawe apesaki ye bopemi.
7 阿撒對猶大人說:「我們必須建築這些城邑,四周建築城垣堡壘,安置大門和門閂;地域仍屬我們,是因為我們尋求了上主,我們的天主。我們既尋求了他,他便使我們四境平靖。」於是他們興工建築,事事順利。
Alobaki na Yuda: « Totonga bingumba oyo, tozingela yango na bamir, na bandako milayi mpe na bikuke elongo na bikangelo na yango. Mokili ezali kati na bopemi liboso na biso, pamba te tolukaki Yawe, Nzambe na biso; tolukaki Ye, mpe Ye apesi biso bopemi na bangambo nyonso. » Boye, batongaki mpe balongaki na mabongisi na bango.
8 阿撒的軍隊,持盾持戈的猶大人三十萬,持牌挽弓的本雅明人二十八萬:這些人都是勇士。[則辣黑進攻失敗]
Asa azalaki na mampinga ya basoda nkoto nkama misato ya bato ya Yuda, oyo bazalaki komema banguba minene mpe makonga, mpe ya basoda nkoto nkama mibale na tuku mwambe ya bato ya Benjame, oyo bazalaki komema banguba mike mpe kobeta matolotolo: bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
9 那時,雇士人則辣黑率領百萬大軍,戰車三百輛,前來進攻,到了瑪勒沙。
Zera, moto ya Kushi, elongo na mampinga ya basoda monkoko moko mpe bashar nkama misato, abundisaki mampinga ya Asa mpe akomaki kino na Maresha.
10 阿撒出來迎戰,陳兵在離瑪勒沙不遠的責法達山谷。
Asa abimelaki ye, mpe batandamaki na molongo ya bitumba na se ya Tsefata, pene ya Maresha.
11 阿撒呼籲上主他的天主說:「上主! 在強弱懸殊之下,無人能似你能協助。上主,我們的天主! 求你協助我們,因為我們只有依賴你,奉你的名來迎擊這支大軍。上主,你是我們的天主,不要讓人勝過你! 」
Asa abelelaki Yawe, Nzambe na ye; alobaki: « Oh Yawe, moko te akokani na Yo, moko te akoki kosunga moto ya bolembu liboso ya moto na nguya. Oh Yawe, Nzambe na biso, sunga biso! Pamba te totiaka elikya na biso kati na Yo. Ezali na Kombo na Yo nde toyaki kobundisa mampinga oyo ya monene. Oh Yawe, ozali Nzambe na biso! Tika ete moto alonga Yo te! »
12 於是上主在阿撒和猶大人前打擊了雇士人,雇士人遂逃走。
Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.
13 阿撒帶著跟隨他的軍民,追擊他們直到革辣爾。雇士人甚至沒有一個活的,都喪亡了,因為他們為上主和他的軍隊擊潰。猶大人奪取了很多財物。
Asa elongo na mampinga na ye balandaki bato ya Etiopi kino na Gerari. Bato bakufaki, bakokaki te kobikisa bomoi na bango, pamba te bango nyonso babebisamaki liboso ya Yawe mpe mampinga na Ye. Mampinga ya basoda ya Yuda bazwaki bomengo ebele ya bitumba;
14 他們又攻破了革辣爾四周所有的城池,因為上主的恐怖籠罩了這些城池;猶大人又將所有的城擄掠一空,因為城中有許多財物。
babebisaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Gerari, pamba te Yawe akweyiselaki bango somo na Ye ya makasi. Bazwaki na makasi biloko kati na bingumba nyonso, pamba te biloko ya kozwa ezalaki ebele penza kati na yango.
15 隨後又毀壞了群畜的圍欄,掠取了許多羊群和駱駝,便回耶路撒冷去了。
Babebisaki mpe bitonga ya bibwele, bamemaki bantaba mpe bameme ebele elongo na bashamo. Bongo, bazongaki na Yelusalemi.

< 歷代志下 14 >