Preface
Read
+
Publisher
Nainoia, Inc.
PO Box 462, Bellefonte, PA 16823
(814) 470-8028
Nainoia Inc, Publisher
LinkedIn/NAINOIA-INC
Third Party Publisher Resources
Request Custom Formatted Verses
Please contact us below
Submit your proposed corrections
I understand that the Aionian Bible republishes public domain and Creative Commons Bible texts and that volunteers may be needed to present the original text accurately. I also understand that apocryphal text is removed and most variant verse numbering is mapped to the English standard. I have entered my corrections under the verse(s) below. Proposed corrections to the Lingala Bible, Haggai Chapter 1 https://www.AionianBible.org/Bibles/Lingala---Lingala-Bible/Haggai 1) Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe: 2) « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › » 3) Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje: 4) « Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba? » 5) Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino. 6) Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. » 7) Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino. 8) Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe. 9) « Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko. 10) Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma. 11) Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. » 12) Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe. 13) Bongo Aje, momemi sango ya Yawe, asakolaki epai ya bato maloba oyo na Kombo na Yawe: « Nazali elongo na bino, » elobi Yawe. 14) Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango, 15) na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya motoba, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi. Additional comments?
Refresh Captcha
The world's first Holy Bible un-translation!