< Nê-hê-mi-a 3 >
1 Ê-li-a-síp, thầy tế lễ thượng phẩm, chổi dậy với các anh em mình, là những thầy tế lễ, và xây cất cái cửa Chiên. Chúng biệt nó riêng ra thánh và đặt hai cánh cửa; chúng biệt nó riêng ra thánh cho đến tháp Mê-a và cho đến tháp Ha-na-nê-ên.
Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli.
2 Kế Ê-li-a-síp, người thành Giê-ri-cô xây cất; kế chúng, Xa-cu, con trai của Im-ri, xây cất.
Bato ya Jeriko babongisaki eteni ya mir oyo ekanganaki na yango; mpe Zakuri, mwana mobali ya Imiri, atongaki pene na bango.
3 Con cháu của Sê-na xây cất cửa Cá. Chúng đặt khuôn và tra cánh, chốt với then nó.
Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango.
4 Kế chúng, Mê-rê-mốt, con trai của U-ri, cháu của Ha-cốt, lo sửa xây. Kế chúng, Mê-su-lam, con trai Bê-rê-kia, cháu Mê-sê-xa-lê-ên, làm tu bổ. Kế chúng, Xa-đốc; con trai của Ba-a-na, tu bổ.
Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango.
5 Kế chúng, những người Tê-cô-a tu bổ; song các người tước vị họ chẳng ghé vai vào công việc của Chúa mình.
Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala.
6 Giê-gia-đa, con trai của Pha-sê-a và Mê-su-lam, con trai của Bê-sô-đia, sửa xây cái cửa cũ lại; chúng lợp nó, tra cánh, chốt, và then.
Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
7 Kế chúng, Mê-la-tia, là người Ga-ba-ôn, và Gia-đôn, là người Mê-rô-nốt, cùng những người Ga-ba-ôn và người Mích-ba, thuộc về địa hạt của quan tổng trấn bên kia sông, đều tu bổ.
Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango.
8 Kế chúng, U-xi-ên, con trai Hạt-ha-gia, một kẻ trong bọn thợ vàng, tu bổ; kế người, Ha-na-nia, là người trong bọn thợ hòa hương, tu bổ; họ sửa xây Giê-ru-sa-lem cho vững bền đến vách rộng.
Uzieli, mwana mobali ya Araya, moko kati na banyangwisi bibende na moto, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Bongo Anania, moko kati na basali oyo basalaka malasi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo elandaki. Babongisaki mir ya Yelusalemi kino na esika ya mir monene.
9 Kế họ, Rê-pha-gia, con trai của Hu-rơ, làm quản lý phân nửa quận Giê-ru-sa-lem, tu bổ.
Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki.
10 Kế họ, Giê-đa-gia con trai Ha-ru-máp, tu bổ nơi đối ngang với nhà người. Kế người, Hát-túc, con trai của Ha-sáp-nia, tu bổ.
Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye.
11 Manh-ki-gia, con trai của Ha-rim, và Ha-súp, con trai của Pha-hát-Mô-áp, tu bổ một phần khác và cái tháp lò.
Malikiya, mwana mobali ya Arimi, mpe Ashubi, mwana mobali ya Paati-Moabi, babongisaki eteni mosusu ya mir mpe ndako molayi ya Fulu.
12 Kế chúng, Sa-lum, con trai của Ha-lô-he, làm quản lý phân nửa quận Giê-ru-sa-lem, và các con gái của người, đều tu bổ.
Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki.
13 Ha-nun và dân cư Xa-nô-a sửa cái cửa Trũng; chúng xây cất nó, tra cánh cửa chốt, và then; cũng xây một ngàn thước vách ngăn, cho đến cửa phân.
Anuni mpe bavandi ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lubwaku. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Babongisaki lisusu bametele pene nkama mitano ya mir kino na Ekuke ya Fulu.
14 Manh-ki-gia, con trai Rê-cáp, quản lý quận Bết-Hát-kê-ren, sửa cái cửa phân; người xây cất nó, tra cánh cửa, chốt, và then.
Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba.
15 Sa-lun, con trai của Côn-Hô-xe, quản lý quận Mích-ba, sửa cái cửa Giếng; người xây cất nó, lợp nó, tra cánh cửa, chốt, và then; cũng xây vách ngăn của ao Si-lô-ê gần bên vườn vua, và cho đến cái thang từ thành Đa-vít trở xuống.
Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi.
16 Kế người, Nê-hê-mi, con trai của A-húc, quản lý phân nửa quận Bết-Xu-rơ, sửa xây vách cho đến ngang các lăng tẩm Đa-vít, cho đến ao đã đào, và cho đến nhà của các dõng sĩ.
Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi.
17 Kế người, Rê-hum, con trai Ba-ni, người Lê-vi, tu bổ. Kế người, Ha-sa-bia, quản lý phân nửa quận Kê-i-la, tu bổ về phần quận mình.
Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye.
18 Kế người, có anh em của họ, là Ba-vai, con trai của Hê-na-đát, quản lý phân nửa quận Kê-i-la, tu bổ.
Bandeko na ye batongaki pembeni na ye, na bokambami ya Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, mokambi ya ndambo mosusu ya etuka ya Keila.
19 Kế người, Ê-xe, con trai của Giô-suê, quản lý Mích-ba, tu bổ một phần khác, đối ngang dốc đi lên khi binh khí ở về góc thành.
Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana.
20 Sau người có Ba-rúc, con trai của Xáp-bai, lấy lòng sốt sắng tu bổ một phần khác, từ góc thành cho đến cửa vào nhà Ê-li-a-síp, thầy tế lễ thượng phẩm.
Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
21 Sau người có Mê-rê-mốt, con trai U-ri, cháu Ha-cốt, sửa một phần khác, từ cửa vào nhà Ê-li-a-síp cho đến cuối nhà người.
Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango.
22 Sau người có những thầy tế lễ, là kẻ ở đồng bằng Giô-đanh, tu bổ.
Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye.
23 Kế chúng, Bên-gia-min và Ha-súp tu bổ phần đối ngang nhà mình. Kế chúng, A-xa-ria, con trai của ma-a-xê-gia, cháu A-na-nia, tu bổ phía bên nhà mình.
Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye.
24 Kế người, Bin-nui, con trai của Hê-na-đát, sửa một phần khác, từ nhà A-xa-ria cho đến nơi cạnh và cho đến góc thành.
Pene na ye, Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika oyo bamir ekutana mpe kino na songe.
25 Pha-lanh, con trai của U-xai, sửa nơi đối ngang góc thành và nơi tháp cao ló ra của đền vua, đụng giáp cái sân ngục. Kế người đó có Phê-đa-gia, con trai của Pha-rốt, tu bổ.
Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi,
26 Vả, người Nê-thi-nim ở tại Ô-phên cho đến nơi đối ngang cửa Nước về phía đông, và tháp ló ra.
elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi.
27 Kế người ấy có người Thê-cô-a sửa một phần khác đối ngang tháp lớn ló ra, và cho đến vách Ô-phên.
Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli.
28 Những thầy tế lễ sửa nơi phía trên cửa Ngựa, mỗi người sửa phần đối ngang nhà của mình.
Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye.
29 Sau chúng, Xa-đốc, con trai Y-mê, sửa nơi đối ngang nhà mình. Kế sau người có Sê-ma-gia, con trai Sê-ca-nia, kẻ giữ cửa đông, tu bổ.
Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye.
30 Kế người, Ha-na-nia, con trai của Sê-lê-mia, và Ha-nun, con thứ sáu của Xa-láp, sửa một phần khác. Kế chúng, Mê-su-lam, con trai của Bê-rê-kia, sửa nơi đối ngang nhà mình.
Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye.
31 Kế người, Manh-ki-gia, một người trong bọn thợ vàng, sửa cho đến nhà của người Nê-thi-nim và tay buôn bán, đối ngang cửa Mi-phơ cát, và cho đến nơi dốc của góc thành.
Pene na Meshulami, Malikiya, moko kati na basali oyo banyangwisaka bibende na moto, abongisaki eteni na ye kino na ndako ya basali ya Tempelo mpe ya bato ya mombongo. Eteni yango etalani na Ekuke ya Kokengela mpe kino na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutana.
32 Còn những thợ vàng và tay buôn bán đều sửa phần giữa nơi góc thành và cửa Chiên.
Bongo banyangwisi bibende na moto mpe bato ya mombongo babongisaki longwa na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutani, kino na Ekuke ya Bibwele.