< Lu-ca 4 >
1 Chúa Giê-xu đầy dẫy Chúa Thánh Linh, từ bờ sông Giô-đan trở về, liền được Chúa Thánh Linh đưa vào hoang mạc,
Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe
2 nơi ma quỷ cám dỗ trong bốn mươi ngày. Chúa nhịn ăn suốt thời gian ấy, nên Ngài đói.
epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala.
3 Sau đó ma quỷ đến cám dỗ: “Thầy cứ hóa đá thành bánh mà ăn! Có thế mới chứng tỏ Thầy là Con Đức Chúa Trời!”
Satana alobaki na Ye: — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa.
4 Nhưng Chúa Giê-xu đáp: “Thánh Kinh chép: ‘Người ta sống không phải chỉ nhờ bánh.’”
Yesu azongiselaki ye: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te. »
5 Sau đó, Sa-tan đem Chúa lên cao, chỉ cho Ngài xem tất cả các nước trên thế giới trong giây phút.
Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili.
6 Và hứa: “Tôi sẽ cho Thầy tất cả uy quyền và vinh quang của các nước đó. Vì tất cả đã giao cho tôi, tôi muốn cho ai tùy ý.
Satana alobaki na Yesu: — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi.
7 Tôi sẽ cho Thầy tất cả, nếu Thầy thờ lạy tôi.”
Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo.
8 Chúa Giê-xu đáp: “Thánh Kinh dạy: ‘Ngươi chỉ thờ lạy Chúa Hằng Hữu là Đức Chúa Trời ngươi, và chỉ phụng sự Ngài mà thôi.’”
Yesu azongiselaki ye: — Ekomama: « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »
9 Sa-tan đưa Ngài đến Giê-ru-sa-lem, đặt Ngài trên nóc Đền Thờ mà xúi giục: “Nếu Thầy là Con Đức Chúa Trời, Thầy cứ lao mình xuống đi!
Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye: — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se;
10 Vì Thánh Kinh chép: ‘Đức Chúa Trời sẽ sai thiên sứ bảo vệ Con.
pamba te ekomama: « Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo mpo ete babatela Yo malamu.
11 Và đưa tay nâng đỡ Con, cho chân Con khỏi vấp vào đá.’”
Mpe bakomema Yo na maboko na bango mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. »
12 Chúa Giê-xu đáp: “Thánh Kinh cũng dạy: ‘Ngươi đừng thách thức Chúa Hằng Hữu là Đức Chúa Trời ngươi!’”
Yesu azongisaki: — Ekomama: « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »
13 Sau khi ma quỷ cám dỗ Chúa Giê-xu đủ cách, nó tạm lìa Ngài.
Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama.
14 Chúa Giê-xu trở về xứ Ga-li-lê, đầy quyền năng Chúa Thánh Linh. Danh tiếng Ngài đồn ra khắp vùng.
Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba.
15 Ngài giảng dạy trong các hội đường, được mọi người ca ngợi.
Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye.
16 Chúa Giê-xu về Na-xa-rét, nơi Ngài sống từ thuở bé, Chúa thường vào hội đường vào ngày Sa-bát và đứng dậy đọc Thánh Kinh.
Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga,
17 Người ta trao sách tiên tri Y-sai, Ngài mở ra đọc:
mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma:
18 “Thánh Linh Chúa ngự trên tôi, Chúa ủy nhiệm tôi truyền giảng Phúc Âm cho người nghèo. Ngài sai tôi loan tin tù nhân được giải thoát, người khiếm thị được sáng, người bị áp bức được tự do,
« Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai, pamba te apakoli Ngai mafuta mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola; atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami, koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu, kokangola bato oyo bazali konyokwama
19 và Chúa Hằng Hữu sẵn sàng ban ân lành cho người tin nhận Ngài.”
mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »
20 Chúa gấp sách trả cho người giúp việc hội đường và ngồi xuống. Mọi người chăm chú nhìn Ngài.
Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye.
21 Chúa mở lời: “Hôm nay lời Thánh Kinh mà các người vừa nghe đó đã được ứng nghiệm!”
Bongo akomaki koloba na bango: — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo!
22 Cả hội đường đều tán thưởng và ngạc nhiên về những lời dạy cao sâu của Chúa. Họ hỏi nhau: “Ông ấy có phải con Giô-sép không?”
Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye; bakomaki komituna: — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te?
23 Chúa đáp: “Hẳn các ông muốn áp dụng tục ngữ này cho tôi: ‘Y sĩ, hãy chữa lành cho mình đi!’ Ý các ông là ‘Hãy làm phép lạ tại quê nhà như đã thực hiện tại Ca-bê-na-um.’
Yesu alobaki na bango: — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo: « Monganga, mibikisa yo moko! » Mpe bokoloba na Ngai: « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi! »
24 Nhưng tôi cho các ông biết, chẳng có tiên tri nào được quê hương mình hoan nghênh cả.
Abakisaki: — Nazali koloba na bino penza ya solo: « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye.
25 Thật thế, ngày xưa khi người Ít-ra-ên bị hạn hán ba năm rưỡi và nạn đói lớn, dù trong nước có rất nhiều quả phụ,
Nazali koloba na bino penza ya solo: ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.
26 nhưng tiên tri Ê-li được Đức Chúa Trời sai đến nhà một quả phụ nước ngoài tại Sa-rép-ta, xứ Si-đôn.
Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni.
27 Cũng vậy, vào đời tiên tri Ê-li-sê, nhiều người Ít-ra-ên mắc bệnh phong hủi, nhưng chỉ có Na-a-man, người Sy-ri được chữa lành.”
Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »
28 Nghe Chúa dạy, mọi người trong hội đường đều giận dữ,
Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo;
29 xông lại kéo Ngài ra ngoài thành, đẩy Ngài lên sườn núi, định xô Ngài xuống vực thẳm.
batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se.
30 Nhưng Chúa lách qua đám đông, đi nơi khác.
Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye.
31 Chúa trở lại thành Ca-bê-na-um, xứ Ga-li-lê, và Ngài vào hội đường giảng dạy nhằm ngày Sa-bát.
Bongo Yesu akendeki na Kapernawumi, engumba ya Galile, mpe ateyaki kuna bato na mokolo ya Saba.
32 Dân chúng rất ngạc nhiên, vì lời Chúa đầy uy quyền.
Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi.
33 Trong hội đường, một người bị quỷ ám kêu lên:
Kati na ndako ya mayangani, ezalaki na mobali moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe. Agangaki na mongongo makasi:
34 “Giê-xu người Na-xa-rét! Ngài định làm gì chúng tôi? Có phải Ngài đến tiêu diệt chúng tôi không? Tôi biết Ngài là Đấng Thánh của Đức Chúa Trời!”
— Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo? Oyei mpo na kobebisa biso? Nayebi nani oyo Yo ozali: Mosantu ya Nzambe!
35 Chúa Giê-xu quở trách quỷ. Ngài phán: “Im đi! Hãy ra khỏi người này.” Quỷ vật nhào anh ấy trước mặt mọi người, rồi ra khỏi, không làm thiệt hại gì.
Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo: — Kanga monoko na yo! Bima kati na moto oyo! Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te.
36 Ai nấy kinh ngạc bảo nhau: “Lời Ngài đầy uy quyền đến nỗi quỷ cũng phải tuân lệnh.”
Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana: — Oyo ezali lisusu maloba nini! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima!
37 Việc Chúa đuổi quỷ được đồn ra khắp xứ.
Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba.
38 Rời hội đường, Chúa Giê-xu đến nhà Si-môn. Bà gia Si-môn đang sốt nặng, mọi người xin Ngài chữa cho bà.
Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye.
39 Chúa đến bên giường quở cơn sốt; lập tức bà hết sốt, đứng dậy tiếp đãi mọi người.
Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
40 Lúc mặt trời lặn, người ta đem tất cả người bệnh tật đến gần Chúa Giê-xu. Ngài đặt tay chữa lành từng người.
Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango.
41 Chúa cũng đuổi quỷ cho nhiều người. Các quỷ bị trục xuất thường kêu lớn: “Ngài là Con Đức Chúa Trời!” Nhưng Chúa quở trách, không cho chúng lên tiếng, vì chúng biết Ngài là Đấng Mết-si-a.
Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga: « Ozali solo Mwana na Nzambe! » Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto.
42 Sáng hôm sau, Chúa Giê-xu đến nơi vắng vẻ. Dân chúng đi tìm Ngài khắp nơi. Tìm gặp Chúa, họ nài xin Ngài ở lại, đừng rời khỏi xứ họ.
Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango.
43 Nhưng Chúa đáp: “Ta còn phải truyền giảng Phúc Âm Nước của Đức Chúa Trời tại nhiều nơi khác nữa. Đó là lý do Ta được sai đến trần gian.”
Kasi Yesu alobaki na bango: — Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.
44 Vậy Ngài tiếp tục đi khắp xứ Giu-đê, giảng dạy trong các hội đường.
Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda.