< Ê-xê-ki-ên 41 >

1 Sau đó, người đưa tôi vào nơi tôn nghiêm của đền thờ. Người đo tường của mỗi bên đường đi, và chúng có chiều dày là 3,2 mét.
Moto yango amemaki ngai kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki monene mpe amekaki molayi ya makonzi na yango: likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene misato na monene na bangambo nyonso.
2 Lối vào rộng 5,3 mét và tường dài 2,7 mét. Người cũng đo nơi tôn nghiêm dài 21,2 mét và rộng 10,6 mét.
Ekotelo na yango ezalaki na bametele pene mitano na mokuse, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo, na mokuse. Amekaki lisusu molayi ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene: ezalaki na bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mokuse.
3 Người vào bên trong đền thờ, đo tường ở lối vào, mỗi tường dày 1,6 mét. Cửa rộng 3,2 mét, tường mỗi bên dài 3,7 mét.
Bongo akotaki kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule; amekaki molayi ya makonzi ya ekotelo: moko na moko ezalaki na metele pene moko na mokuse; ekotelo ezalaki na bametele pene misato na mokuse mpe bamir ya mipanzi ya ekotelo ezalaki na bametele pene misato na basantimetele tuku mitano na mokuse.
4 Phòng trong của nơi tôn nghiêm dài 10,6 mét và rộng 10,6 mét. Và người nói với tôi: “Đây là Nơi Chí Thánh.”
Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene: ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse; mpe alobaki na ngai: « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. »
5 Rồi người ấy đo tường của Đền Thờ, có bề dày là 3,2 mét. Bên ngoài dọc theo tường có một dãy phòng; mỗi phòng rộng 2,2 mét.
Amekaki lisusu monene ya mir ya Tempelo: ezalaki na bametele pene misato; mpe ngambo nyonso ya bashambre zingazinga ya Tempelo ezalaki na bametele pene mibale na mokuse.
6 Các phòng nhỏ gồm ba tầng, tầng này nằm trên tầng kia, mỗi tầng có ba mươi phòng. Công trình kiến trúc này có một hệ thống kèo cột riêng, chứ không dựa vào tường đền thờ.
Ezalaki na ba-etaje misato oyo moko na moko, kati na yango, ezalaki na bashambre tuku misato oyo esimbamaki na mir batonga zingazinga ya Tempelo. Bamir yango ezalaki ekangana yango na yango, kasi ezalaki ya kokangana na mir ya Tempelo te.
7 Các phòng quanh Đền Thờ, tầng trên rộng hơn tầng dưới. Cấu trúc của các phòng này càng lên cao càng rộng. Có một cầu thang từ tầng thấp nhất lên tầng cao nhất đi qua tầng giữa.
Longwa na etaje moko mpo na komata na etaje mosusu, bashambre ezalaki kokoma minene, pamba te bazalaki komata na etaje mosusu na ematelo oyo ezalaki zingazinga ya mir; boye, likolo ya ndako ezalaki monene makasi. Bongo, mpo na kolongwa na etaje oyo ya se mpe kokoma na etaje oyo ya likolo, esengelaki koleka na etaje ya kati-kati.
8 Tôi thấy Đền Thờ được xây trên một nền cao, tầng dưới của dãy phòng nhô ra phía nền. Nó cao 3,2 mét.
Namonaki zingazinga ya Tempelo eloko moko batonga na likolo: ezalaki moboko ya bashambre; molayi na yango ezalaki na bametele pene misato.
9 Tường bên ngoài cả dãy phòng Đền Thờ dày 2,7 mét. Có một khoảng trống giữa các phòng này
Monene ya mir ya libanda ya bashambre ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. Nzela oyo ezalaki na kati-kati ya ngambo ya bashambre ya Tempelo
10 và các phòng dọc theo tường ngoài của sân trong. Khoảng rộng này là 10,6 mét, và nó chạy quanh Đền Thờ.
mpe bashambre ya Banganga-Nzambe ezalaki na bametele pene zomi na mokuse na zingazinga ya Tempelo.
11 Có hai cửa lớn dẫn ra nền, mỗi cửa rộng 2,7 mét. Một cửa mở ra hướng bắc, một cửa về hướng nam.
Bikuke ya bashambre ya Tempelo etalaki na nzela oyo ezalaki na bikotelo mibale: moko na ngambo ya nor mpe mosusu na ngambo ya sude. Mokuse ya nzela yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano.
12 Phía tây có một tòa nhà lớn đối diện với sân chính của Đền Thờ. Nó rộng 37,1 mét và dài 47,7 mét, và tường dày 2,7 mét.
Na ngambo ya weste, ezalaki na ndako moko etalana na lopango ya Tempelo: ezalaki na bametele pene tuku misato na mitano na mokuse; mir ya ndako yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na monene, mpe bametele pene tuku minei na mitano na molayi.
13 Kế đến, người đo Đền Thờ, dài 53 mét. Sân bao quanh tòa nhà, bao gồm tường và phần nhô ra là 53 mét.
Moto yango amekaki lisusu molayi ya Tempelo: ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi; bongo lopango ya Tempelo mpe bamir na yango ezalaki na bametele pene tuku mitano.
14 Chiều rộng của sân Đền Thờ về phía đông là 53 mét.
Mokuse ya Tempelo mpe ya esika ya polele oyo ezalaki na ngambo ya este ezalaki mpe na bametele pene tuku mitano.
15 Tòa nhà ở phía tây, bao gồm cả hai tường, rộng 53 mét. Bên trong đền thờ, nơi tôn nghiêm, và hành lang của Đền Thờ
Amekaki lisusu molayi ya ndako oyo etalana na lopango, na sima ya Tempelo elongo na nzela na yango ngambo na ngambo: ezalaki na bametele pene tuku mitano. Kati na Tempelo, eteni oyo eleki monene, Esika ya bule ya kati mpe ndako moke ya kokotela oyo etalana na lopango,
16 đều lát gỗ và có cửa sổ tò vò. Các tường trong của Đền Thờ được lát gỗ trên và dưới các cửa sổ.
bikotelo, maninisa ya milayi oyo batalelaka libanda mpe nzela oyo ezali kati na ba-etaje wana misato, bazipaki yango nyonso na mabaya, longwa na se kino na maninisa ya etaje ya liboso, mpe bazipaki lisusu maninisa yango nyonso.
17 Khoảng trên cửa lớn đi vào phòng trong, tường trong và ngoài của nó cũng được lát gỗ.
Na esika oyo ezali likolo ya ekotelo ya libanda kino na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na bamir ya zingazinga ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na libanda ya eteni ya bule ya Tempelo,
18 Các bức tường được trang trí bằng các hình thiên sứ chạm trổ, mỗi thiên sứ có hai mặt, và xen kẽ giữa các hình thiên sứ, có hình cây kè.
batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila. Bililingi ya banzete ya mbila ezalaki elandana na bililingi ya basheribe. Boye, Sheribe moko na moko azalaki na bilongi mibale:
19 Một mặt—là mặt người—hướng về một cây kè phía bên này. Còn một mặt khác—mặt sư tử tơ—nhìn về hướng về cây kè phía bên kia. Những hình ảnh này được khắc dọc bên trong Đền Thờ,
elongi ya moto, na ngambo ya nzete ya mbila moko mpe elongi ya nkosi, na ngambo ya nzete ya mbila mosusu; batiaki bililingi yango zingazinga ya Tempelo mobimba.
20 từ nền lên đến đỉnh của tường, kể cả tường bên ngoài của nơi tôn nghiêm.
Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na mir ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene, longwa na se kino na likolo ya ekotelo.
21 Tại cửa của nơi tôn nghiêm có các trụ cửa vuông vức, và một trụ ngay trước Nơi Chí Thánh cũng giống như vậy.
Mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na bangambo na yango nyonso, ezalaki ndenge moko na molayi; mpe mabaya oyo ezalaki liboso ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ezalaki mpe kaka ndenge moko.
22 Có một bàn thờ được làm bằng gỗ, cao 1,6 mét và rộng 1,1 mét. Góc cạnh, đáy, và bốn mặt đều bằng gỗ. Người bảo tôi: “Đây là cái bàn để trước mặt Chúa Hằng Hữu.”
Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai: « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. »
23 Cả nơi tôn nghiêm và Nơi Chí Thánh đều có cửa đôi,
Ezala eteni ya Tempelo, oyo eleki monene to eteni ya Tempelo, oyo eleki bule, moko na moko ezalaki na bikuke mibale:
24 mỗi cửa có hai cánh.
ekuke moko na moko ezalaki na bizipelo mibale oyo ebalukaka.
25 Cửa đi vào nơi tôn nghiêm được trang trí bằng hình các chê-ru-bim và hình cây kè, như trên các vách tường. Cũng có tấm trướng bằng gỗ phủ trên phòng lớn hành lang của Đền Thờ.
Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na bikuke ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene; basalaki mwanza moke ya mabaya na liboso ya ndako moke ya kokotela.
26 Các cửa sổ trên tường hai bên hành lang được trang trí bằng các hình cây kè. Các phòng bên cạnh dọc theo tường ngoài và tấm trướng gỗ che cũng được trang trí như vậy.
Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na bangambo nyonso ya bamir ya mipanzi ya ndako moke ya kokotela, oyo ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Mpe mipanzi ya bashambre ya Tempelo ezalaki na bamwanza mike.

< Ê-xê-ki-ên 41 >