< ज़बूर 125 >

1 जो ख़ुदावन्द पर भरोसा करते वह कोह — ए — सिय्यून की तरह हैं, जो अटल बल्कि हमेशा क़ाईम है।
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.
2 जैसे येरूशलेम पहाड़ों से घिरा है, वैसे ही अब से हमेशा तक ख़ुदावन्द अपने लोगों को घेरे रहेगा।
Ndenge bangomba ezingeli Yelusalemi, ndenge wana mpe Yawe azingeli bato na Ye, kobanda sik’oyo kino libela na libela.
3 क्यूँकि शरारत का 'असा सादिकों की मीरास पर क़ाईम न होगा, ताकि सादिक बदकारी की तरफ़ अपने हाथ न बढ़ाएँ।
Bokonzi ya mabe ekowumela te na etuka ya bato ya sembo, mpo ete basangana te na mabe.
4 ऐ ख़ुदावन्द! भलों के साथ भलाई कर, और उनके साथ भी जो रास्त दिल हैं।
Yawe, zala malamu mpo na bato malamu mpe mpo na bato oyo bazali alima na mitema!
5 लेकिन जो अपनी टेढ़ी राहों की तरफ़ मुड़ते हैं, उनको ख़ुदावन्द बदकिरदारों के साथ निकाल ले जाएगा। इस्राईल की सलामती हो!
Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe! Tika ete kimia ezala na Isalaele!

< ज़बूर 125 >