< Об'явлення 9 >

1 І засурмив п'ятий ангол, — і я бачив зо́рю, що спала із неба додолу. І їй да́ний був ключ від криниці безо́дньої. (Abyssos g12)
Anjelu ya mitano abetaki kelelo, mpe namonaki monzoto kokweya na mokili wuta na Lola. Fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi epesamaki na monzoto yango. (Abyssos g12)
2 І вона відімкнула криницю безо́дню, — і дим повалив із криниці, мов дим із великої пе́чі. І затьми́лося сонце й повітря від криничного диму. (Abyssos g12)
Tango efungolaki libulu yango, milinga ebele emataki longwa kuna; ezalaki lokola milinga oyo ebimaka na fulu monene ya moto makasi, mpe eyindisaki moyi mpe mopepe. (Abyssos g12)
3 А з диму на землю вийшла сарана́, і да́но їй міць, як мають міць скорпіо́ни земні.
Wuta na milinga yango, mankoko ebimaki, epanzanaki na mokili mpe epesamelaki bokonzi lokola oyo ya bakoto.
4 І наказано їй, щоб вона не шкодила земній траві́, ані жа́дному зі́ллю, ані жа́дному дереву, але тільки тим людям, які на чо́лах не мають печатки Божої.
Nzokande epesamelaki mitindo ete esala mabe te na matiti ya mokili to na nkona nyonso ya mobesu to na nzete nyonso, kasi esala mabe kaka na bato oyo bazangi kashe ya Nzambe na bambunzu na bango.
5 І було да́но їй, щоб їх не вбивати, але мучити п'ять місяців; а му́ка від неї, як му́ка від скорпіо́на, коли вкусить люди́ну.
Esengelaki konyokola bango basanza mitano, kasi esengelaki te koboma bango. Pasi oyo ezalaki kopesa ekokanaki na oyo moto ayokaka soki koto eswi ye.
6 І в ті дні люди смерти шукатимуть, — та не зна́йдуть її! Померти вони захотять, — та втече від них смерть!
Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango.
7 А вигляд сарани́ був подібний до ко́ней, на війну приготованих; а на головах у неї — немов би вінки́, подібні на золото, а обличчя її — немов лю́дські обличчя.
Mankoko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba. Na mito na yango, ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato.
8 І мала волосся — як волосся жіноче, а її зуби були́ — немов ле́в'ячі.
Suki na yango ezalaki lokola suki ya basi, mpe minu na yango ezalaki lokola minu ya nkosi.
9 І мала вона па́нцери, немов панцери залізні; а шум її крил — немов шум колесни́ць, коли ко́ней багато біжить на війну́.
Tolo na yango ezalaki lokola bibende oyo basoda balataka na tolo, mpe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bashar oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba.
10 І мала хвости, подібні до скорпіонових, та жа́ла, а в неї в хвостах її вла́да — п'ять місяців шкодити лю́дям.
Mikila na yango ezalaki na basonge lokola mikila ya bakoto, mpe nguya na yango ya konyokola bato basanza mitano ezalaki kati na mikila na yango.
11 І мала вона над собою царя, ангола безодні; йому по-єврейському ім'я Аваддо́н, а по-грецькому звався він Аполліо́н! (Abyssos g12)
Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. » (Abyssos g12)
12 Одне горе минуло! Ось за ним ще два горя надходять!
Tango pasi ya liboso elekaki, bapasi mosusu mibale elandaki.
13 I засурми́в шостий Ангол, — і я почув один голос із чотирьох ро́гів золотого же́ртівника, який перед Богом,
Anjelu ya motoba abetaki kelelo, mpe nayokaki mongongo moko kobima longwa na maseke minei ya etumbelo oyo basala na wolo, etumbelo oyo ezalaki liboso ya Nzambe.
14 що казав шостому Анголові, який мав сурму́: „Розв'яжи чотирьох Анголів, що пов'язані при великій річці Ефра́ті“.
Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko: « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. »
15 I були порозв'я́зувані чотири Анголи́, пригото́вані на годину, і на день, і на місяць, і на рік, щоб убили третину людей.
Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato.
16 А число кі́нного ві́йська — двадцять тисяч раз по десять тисяч; і я чув їхнє число.
Bazalaki minkoko nkama mibale ya basoda oyo babundaka na likolo ya bampunda. Yango nde motango na bango oyo nayokaki.
17 І так бачив я ко́ней в виді́нні, а на них верхівці́в, що па́нцери мали огняні́, і гіяци́нтові, і сірчані́. А го́лови в ко́ней — немов голови ле́в'ячі, а з їхнього рота виходив огонь, і дим, і сірка.
Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki: balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo.
18 І побита була́ третина людей від цих трьох пора́зок, — від огню́, і від диму, і від сірки, що вихо́дили з їхніх роті́в.
Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda: moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato.
19 Сила бо ко́ней була в їхнім роті та в їхніх хвоста́х. А хвости́ їхні подібні до вужі́в, що мають го́лови, і ними вони шкоду чинять.
Nguya ya bampunda ezalaki kati na minoko mpe na mikila na yango, pamba te mikila na yango ezalaki lokola banyoka, mpe ezalaki na mito oyo, na nzela na yango, ezalaki kosala bato mabe.
20 А решта людей, що не вбита була́ цими пора́зками, не пока́ялася за діла своїх рук, щоб не кланятись де́монам, ані і́долам золотим, і срібним, і мідяним, і кам'яни́м, і дерев'яним, що не можуть вони ані бачити, ані чути, ані ходити.
Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te.
21 І вони не покаялися в своїх убивствах, ані в чарах своїх, ні в розпусті своїй, ні в краді́жках своїх.
Batikaki mpe te koboma bato, misala na bango ya maji, kindumba na bango mpe moyibi na bango.

< Об'явлення 9 >