< Об'явлення 11 >

1 І да́но трости́ну мені, подібну до па́лиці, і сказано: „Устань, і зміряй храма Божого й же́ртівника, і тих, хто вклоняється в ньому.
Bongo bapesaki ngai kekele lokola lingenda oyo bamekelaka molayi mpe balobaki na ngai: « Kende kozwa molayi ya Tempelo ya Nzambe mpe ya etumbelo, mpe tanga bato oyo bagumbamelaka Nzambe kuna.
2 А двір, що за храмом, лиши та не міряй його, бо він да́ний поганам, — і сорок два місяці бу́дуть топтати вони святе місто.
Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale.
3 І звелю́ Я двом свідкам Своїм, і бу́дуть вони пророкувати тисячу двісті й шістдеся́т день, зодя́гнені в волосяни́цю.
Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. »
4 Воні — дві оливки і два світильники́, що стоять перед Богом землі.
Batatoli wana mibale bazali banzete mibale ya olive mpe bitelemiselo mibale ya minda; mpe batelemaka liboso ya Nkolo ya Mokili.
5 І коли б хто схотів учинити їм кривду, то вийде огонь з їхніх уст, — і поїсть ворогів їхніх. А коли хто захоче вчинити їм кривду, — той отак мусить бути забитий.
Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa.
6 Вони мають вла́ду небо замкнути, щоб за днів їхнього пророцтва не йшов дощ. І мають вла́ду вони над водою, — у кров оберта́ти її, і вдарити землю всілякою карою, скільки разі́в вони схочуть.
Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi.
7 А коли вони скі́нчать свідо́цтво своє, то звірина́, що з безодні виходить, із ними війну поведе́, — і вона їх переможе та їх повбиває. (Abyssos g12)
Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango. (Abyssos g12)
8 І їхні трупи полишить на майда́ні великого міста, що зветься духовно Содо́м і Єгипет, де й Госпо́дь наш був розп'я́тий.
Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu.
9 І багато з наро́дів, і з племен, і з язи́ків, і з поган бу́дуть дивитися пі́вчверта дні на їхні трупи, не дозволять покласти в гроби́ їхніх тру́пів.
Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango.
10 А ме́шканці землі будуть тішитися та радіти над ними, і дару́нки пошлють один о́дному, бо мучили ці два пророки ме́шканців землі.
Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili.
11 А по пі́вчверта днях дух життя ввійшов у них від Бога, — і вони повставали на ноги свої. І напав жах великий на тих, хто дивився на них!
Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango.
12 І почули вони гучний голос із неба, що їм говорив: „Зійдіть сюди!“І на небо зійшли вони в хмарі, і вороги їхні дивились на них.
Mongongo moko ya makasi kowuta na Lola elobaki na batatoli wana mibale: « Bomata awa! » Bamataki na likolo kati na lipata, wana banguna na bango bazalaki kotala.
13 І тієї години зчинився страшни́й землетру́с, і десята частина міста того завали́лась... І в цім трусі загинуло сім тисяч лю́дських іме́н, а решта обго́рнена жахом була́, — і вони віддали́ славу Богу Небесному!
Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo.
14 Друге горе минуло! Ото незабаром настане за ним третє горе!“
Pasi ya mibale eleki; mpe tala, pasi ya misato ezali koya kala mingi te.
15 І засурмив сьо́мий ангол, — і на небі зчинились гучні голоси́, що казали: „Перейшло панува́ння над світом до Господа нашого та до Христа Його, — і Він зацарює на вічні віки́!“ (aiōn g165)
Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola; elobaki: « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, mpe akokonza seko na seko. » (aiōn g165)
16 І двадцять чотири ста́рці, що на престолах своїх перед Богом сидять, попа́дали на обличчя свої, та й уклонилися Богові,
Mpe bampaka tuku mibale na minei oyo bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi liboso ya Nzambe bafukamaki bilongi kino na mabele, mpe bagumbamelaki Nzambe
17 кажучи: „Дяку складаємо Тобі, Господи, Боже Вседержителю, що Ти є й що Ти був, що прийняв Свою силу велику та й зацарюва́в!
na koloba: « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, Yo oyo ozali mpe ozalaki, tozali kopesa Yo matondi; mpo ete osalelaki nguya monene na Yo mpe okomaki kokonza.
18 А погани розлю́тилися, та гнів Твій прийшов, і час настав мертвих судити, і дати заплату рабам Твоїм, пророкам і святим, і тим, хто Йме́ння Твого боїться малим і великим, і знищити тих, хто нищить землю“.
Bikolo etombokaki, mpe kanda na Yo epelaki. Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, ezala bato minene to bato pamba; mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. »
19 І розкрився храм Божий на небі, — і ковче́г заповіту Його в Його храмі з'явився. І зчинилися бли́скавки, і гу́ркіт, і гро́ми, і землетру́с, і великий град.
Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.

< Об'явлення 11 >