< Псалми 78 >

1 Пісня навча́льна Асафова.
Nzembo ya Azafi. Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai! Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai!
2 нехай я відкрию уста́ свої при́казкою, нехай старода́вні прислі́в'я я ви́словлю!
Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na tango ya kala.
3 Що́ ми чули й пізнали, і що́ розповідали батьки́ наші нам, —
Makambo oyo toyoka, oyo toyebi, oyo batata na biso bayebisa biso.
4 того не сховаємо від їхніх сині́в, будемо розповіда́ти про славу Господню аж до покоління оста́ннього, і про силу Його та про чу́да Його, які Він учинив!
Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
5 Він поставив засві́дчення в Якові, а Зако́на поклав ув Ізраїлі, про які наказав був Він нашим батька́м завідо́мити про них синів їхніх,
Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,
6 щоб знало про це поколі́ння майбу́тнє, сини, що наро́джені будуть, — уста́нуть і будуть розповідати своїм дітям.
mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango, ekeke ya bana oyo bakobotama. Tika ete batelema mpe bayebisa yango na bana na bango,
7 І положать на Бога надію свою, і не забудуть діл Божих, Його ж заповіді берегти́муть.
mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe, babosana te misala ya Nzambe mpe babatela mibeko na Ye.
8 І не стануть вони, немов їхні батьки́, поколі́нням непокі́рливим та бунтівни́чим, поколінням, що серця свого́ не поста́вило міцно, і що дух його Богу невірний.
Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.
9 Сини Єфрема, озбро́єні лу́чники, повернулися взад у день бо́ю:
Bato ya libota ya Efrayimi basimbaki batolotolo, kasi na mokolo ya etumba, bakimaki.
10 вони не берегли́ заповіту Божого, а ходити в Зако́ні Його відреклися,
Babatelaki te Boyokani ya Nzambe mpe baboyaki kotosa mibeko na Ye;
11 і забули вони Його чи́ни та чу́да Його, які їм показав.
babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.
12 Він чудо вчинив був для їхніх батькі́в ув єгипетськім кра́ї, на полі Цоа́нськім:
Na miso ya bakoko na bango, asalaki bikamwa kati na Ejipito, na etuka ya Tsoani;
13 Він море розсік, і їх перепрова́див, а воду поставив, як вал;
akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango, atelemisaki mayi lokola mir.
14 і прова́див їх хмарою вдень, а ся́йвом огню́ цілу ніч;
Na moyi, azalaki kotambolisa bango na nzela ya lipata; mpe na butu, na nzela ya pole ya moto.
15 на пустині Він скелі розсік, і щедро усіх напоїв, як з безо́дні.
Apasolaki mabanga kati na esobe mpe amelisaki bango mayi ebele, lokola mayi ya bibale;
16 Він витягнув із скелі пото́ки, і во́ди текли, немов ріки.
abimisaki mayi wuta na libanga mpe asalaki ete etiola lokola mayi ya ebale.
17 Та гріши́ли вони проти Нього ще да́лі, і в пустіші гніви́ли Всевишнього,
Kasi bakobaki kaka kosala masumu liboso na Ye, kotombokela Ye-Oyo-Aleki-Likolo, kati na esobe.
18 і Бога вони випробо́вували в своїм серці, для душ своїх ї́жі бажаючи.
Bamekaki Nzambe na nko, na kosenga bilei kolanda posa na bango.
19 І вони говорили насу́проти Бога й казали: „Чи Бог зможе в пустині трапе́зу згото́вити?“
Balobaki mabe na tina na Nzambe: « Boni, Ye Nzambe azali penza na makoki ya kopesa biso bilei kati na esobe?
20 Тож ударив у скелю — і во́ди лину́ли, і полили́ся пото́ки! „Чи Він зможе також дати хліба? Чи Він наготує м'яси́ва наро́дові Своє́му?“
Solo, abetaki libanga, mayi ebimaki, mpe ebimaki penza ebele. Boni, akokoka lisusu kopesa biso mapa to misuni epai ya bato na Ye? »
21 Тому́ то почув це Господь та й розгні́вався, — і огонь запалав проти Якова, і проти Ізраїля теж знявся гнів,
Tango Yawe ayokaki bongo, asilikaki makasi; moto na Ye epelelaki Jakobi, mpe kanda makasi na Ye ekitelaki Isalaele,
22 бо не ві́рували вони в Бога, і на спасі́ння Його не наді́ялись.
pamba te batiaki elikya na Nzambe te, bandimaki te ete akoki kokangola bango.
23 А Він хмарам згори наказав, — і відчинив двері неба,
Nzokande, apesaki mitindo na mapata mpe afungolaki bikuke ya likolo,
24 і спустив, немов дощ, на них ма́нну для їжі, — і збі́жжя небесне їм дав:
anokiselaki bango mana lokola mvula mpo na kopesa bilei, apesaki bango ble ya Likolo.
25 Хліб а́нгольський їла люди́на, Він послав їм поживи до си́тости!
Moko na moko aliaki mapa ya ba-anjelu. Atindelaki bango bilei ebele penza.
26 Крім цього, Він схі́днього вітра пору́шив на небі, і міццю Своєю привів полудне́вого вітра, —
Wuta na likolo, atindikaki mosika mopepe ya Este; mpe na nguya na Ye, amemaki mopepe ya Sude.
27 і дощем на них м'ясо пустив, немов по́рох, а птаство крила́те, як мо́рський пісо́к,
Anokiselaki bango misuni lokola putulu, bandeke ebele lokola zelo ya ebale monene;
28 і спустив його серед табо́ру його́, коло наметів його.
akweyiselaki bango yango kati na molako na bango, zingazinga ya bandako na bango ya kapo.
29 І їли вони та й наси́тились ду́же, — Він їм їхнє бажа́ння приніс!
Baliaki mpe batondaki makasi; Nzambe apesaki bango biloko oyo bazalaki na yango posa.
30 Та ще не вдовольни́ли жада́ння свого́, ще їхня ї́жа була в їхніх уста́х,
Liboso ete posa na bango ekoka, wana bazalaki nanu na minoko etonda na bilei,
31 а гнів Божий підня́вся на них, та й побив їхніх ситих, і вибра́нців Ізраїлевих повали́в.
kanda ya Nzambe ekweyelaki bango, abomaki bato minene kati na bango, anyokolaki bilenge ya Isalaele.
32 Проте́ ще й далі грішили вони та не вірили в чу́да Його,
Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala masumu, bandimaki kaka te bikamwa na Ye.
33 — і Він докінчи́в у марно́ті їхні дні, а їхні літа́ — у страху.
Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bango lokola mopepe, mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo.
34 Як Він їх побива́в, то бажали Його, — і верта́лися, й Бога шукали,
Tango nyonso Nzambe azalaki koboma bango, bazalaki koluka Ye; bazalaki komizongisa noki epai na Ye.
35 і прига́дували, що Бог — їхня скеля, і Бог Всевишній — то їхній Викупите́ль.
Bazalaki kozongisa na makanisi na bango ete Nzambe nde azali Libanga na bango, ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Mosikoli na bango.
36 І своїми уста́ми вле́щували Його, а своїм язико́м лжу спліта́ли Йому́,
Kasi bazalaki koloba lokuta, minoko na bango ezalaki kokosa Ye;
37 бо їхнє серце не міцно стояло при Нім, і не були́ вони вірні в Його заповіті.
mitema na bango ezalaki sembo te na miso na Ye, mpe bazalaki kobuka Boyokani na Ye.
38 Та він, Милосердний, гріх проща́в і їх не губив, і часто відве́ртав Свій гнів, і не буди́в усю Свою лютість,
Nzokande Ye, na mawa na Ye, azalaki kolimbisa mabe na bango na esika ya kobebisa bango; mbala mingi, azalaki kokanga motema na esika ya kopelisela bango kanda na Ye;
39 і Він пам'ятав, що вони тільки тіло, вітер, який перехо́дить і не поверта́ється!
pamba te azalaki koyeba ete bazali kaka bato, bazali kaka lokola mopepe oyo ezali koleka mpe ekozonga lisusu te.
40 Скільки вони прогнівля́ли Його на пустині, зневажа́ли Його на степу́!
Mbala mingi, batombokelaki Ye kati na esobe mpe bayokisaki Ye mawa kati na bisika ya kokawuka;
41 І все знову та знов випробо́вували вони Бога, і зневажа́ли Святого Ізра́їлевого, —
bazalaki kozongela komeka Nzambe, koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.
42 вони не пам'ята́ли руки Його з дня, як Він ви́бавив їх із недолі,
Babosanaki makambo minene oyo asalaki na nguya na Ye, mokolo oyo akangolaki bango wuta na maboko ya monyokoli;
43 як в Єгипті чинив Він знаме́на Свої, а на полі Цоа́нському чу́да Свої,
babosanaki bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, misala minene oyo asalaki kati na etuka ya Tsoani.
44 і в кров оберну́в річки їхні та їхні пото́ки, щоб вони не пили́.
Abongolaki bibale na bango makila; boye, bakokaki lisusu te komela na mayi na bango.
45 Він послав був на них рої мух, — і їх же́рли вони, і жаб — і вони їх губили.
Atindelaki bango banzinzi oyo eswaka, mpe eliaki bango; mpe magorodo oyo ebebisaki bango.
46 А врожай їхній віддав був Він гу́сені, а їхню пра́цю — сарані́.
Akabaki bambuma ya bilanga na bango epai ya mabanki, mpe mbuma ya mosala na bango epai ya mankoko.
47 Виноград їхній Він гра́дом побив, а при́морозком — їхні шовко́виці.
Abebisaki bilanga na bango ya vino na nzela ya mvula ya mabanga, mpe banzete na bango ya sikomori na nzela ya mvula ya pembe;
48 І Він градові віддав їхній скот, а бли́скавкам — че́реди їхні.
akabaki bameme na bango epai ya mvula ya mabanga, mpe bibwele na bango epai ya kake.
49 Він послав був на них Свій гнів запальни́й, і лютість, й обу́рення, й у́тиск, насла́ння злих анголі́в.
Atindelaki bango kanda na Ye ya makasi lokola moto: kanda makasi, kotomboka, pasi mpe ba-anjelu oyo babebisaka.
50 Він дорогу зрівня́в був для гніву Свого, їхні душі не стримав від смерти, життя ж їхнє віддав морови́ці.
Apesaki na kanda na Ye nzela ya kopela, abatelaki bango te na kufa; kasi akabaki bango na bokono oyo ebomaka.
51 І побив Він усіх перворі́дних в Єгипті, пе́рвістків сили в наметах Ха́мових.
Abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito, bambuma ya liboso ya makasi na bango na se ya bandako ya kapo ya Cham.
52 І повів Він, немов ту отару, наро́д Свій, і їх попрова́див, як стадо, в пустині.
Abimisaki bato na Ye lokola etonga, amemaki bango kati na esobe lokola meme;
53 І провадив безпечно Він їх, і вони не боялись, а море накри́ло було́ ворогів їхніх.
atambolisaki bango na kimia penza, babangaki eloko te; mpe ebale monene emelaki banguna na bango.
54 І Він їх привів до границі святині Своєї, до тієї гори, що прави́ця Його набула́.
Amemaki bango na mokili na Ye ya bule, na ngomba oyo loboko na Ye ya nguya ezwaki;
55 І наро́ди Він повиганя́в перед їхнім обличчям, і кинув для них жеребка́ про спа́док, — і в їхніх наме́тах племе́на Ізраїлеві осели́в.
abenganaki bikolo liboso na bango, apesaki bango etando lokola libula mpe avandisaki mabota ya Isalaele kati na bandako na bango ya kapo.
56 Та й далі вони випробо́вували та гніви́ли Всевишнього Бога, і Його постано́в не доде́ржували,
Kasi bamekaki Nzambe, batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo mpe babatelaki te malako na Ye;
57 і відступали та зраджували, немов їхні батьки відверну́лись, як обма́нливий лук.
bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani, ndenge batata na bango basalaki; batengamaki lokola tolotolo oyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi;
58 І же́ртівниками своїми гніви́ли Його, і дрочи́ли Його своїми фіґу́рами.
bayokisaki Ye kanda na nzela ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpe bapelisaki zuwa na Ye na nzela ya banzambe na bango ya bikeko.
59 Бог почув усе це — і розгні́вався, і сильно обри́дивсь Ізраїлем,
Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi, abwakaki Isalaele mobimba;
60 і покинув осе́лю в Шіло́, скинію ту, що вмістив був посеред людей,
asundolaki Mongombo ya Silo, ndako ya kapo oyo atelemisaki kati na bato,
61 і віддав до неволі Він силу Свою, а вели́чність Свою — в руку во́рога.
akabaki nguya na Ye na bowumbu, mpe lokumu na Ye na maboko ya monguna;
62 І віддав для меча Свій наро́д, і розгнівався був на спа́дщину Свою:
akabaki bato na Ye na mopanga, mpe asilikelaki libula na Ye.
63 його юнакі́в огонь пожира́в, а дівча́там його не співали весі́льних пісе́нь,
Moto etumbaki bilenge mibali, mpe banzembo ya libala eyembamaki lisusu te mpo na lokumu ya bilenge basi.
64 його священики від меча полягли́, — і не плакали вдови його.
Banganga-Nzambe bakufaki na mopanga, mpe basi oyo bakufisaki mibali balelaki te na banzembo ya matanga.
65 Та небавом збудився Господь, немов зо́ сну, як той ве́лет, що ніби вином був підко́шений,
Nkolo alamukaki lokola moto oyo awuti na pongi, lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino;
66 і вдарив Своїх ворогів по оза́дку, — вічну га́ньбу їм дав!
azokisaki banguna na Ye na sima, wana bazalaki kokima, ayokisaki bango soni ya libela.
67 Та Він погорди́в намет Йо́сипів, і племе́на Єфремового не обрав,
Asundolaki bandako ya kapo ya Jozefi mpe aboyaki kopona libota ya Efrayimi;
68 а вибрав Собі плем'я Юдине, го́ру Сіон, що її полюбив!
kasi aponaki libota ya Yuda, ngomba Siona oyo alingaki;
69 І святиню Свою збудував Він, як місце високе, як землю, що навіки її вґрунтува́в.
atongaki Esika na Ye ya bule lokola bisika ya likolo makasi, lokola mabele oyo atia mpo na libela.
70 І вибрав Давида, Свого раба, і від коша́р його взяв,
Aponaki Davidi, mosali na Ye, mpe azwaki ye kati na lopango ya meme;
71 від кі́тних ове́чок його Він привів, щоб Якова пас він, народа Свого, та Ізраїля, спа́док Свій, —
abengaki ye wuta na sima ya meme oyo azalaki kobatela mpo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye, mpe ya Isalaele, libula na Ye.
72 і він пас їх у щирості серця свого́, і прова́див їх мудрістю рук своїх!
Davidi abatelaki bango na motema ezanga pamela, mpe akambaki bango na maboko ya mayele.

< Псалми 78 >