< До євреїв 11 >

1 А віра — то підста́ва споді́ваного, доказ неба́ченого.
Nzokande kondima ezali ndanga ya kozwa biloko oyo tozali kolikya epai ya Nzambe, mpe kobika lokola nde tosili kozwa biloko yango atako tozali komona yango te.
2 Бо нею засвідчені ста́рші були́.
Ezali mpo na kondima nde Nzambe asepelaki na bato ya kala.
3 Вірою ми розуміємо, що віки́ Словом Божим збудовані, так що з невидимого сталось видиме. (aiōn g165)
Ezali na kondima nde tososolaka ete mokili esalemaki na nzela ya Liloba na Nzambe, mpe ete biloko oyo emonanaka esalemaki na nzela ya biloko oyo emonanaka te. (aiōn g165)
4 Вірою Авель приніс Богові жертву кращу, як Ка́їн; нею засвідчений був, що він праведний, як Бог сві́дчив про да́ри його; нею, і вмерши, він ще промовляє.
Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.
5 Вірою Ено́х був перене́сений на небо, щоб не бачити смерти; і його не знайшли, бо Бог переніс його. Бо раніш, як його перенесено, він був засвідчений, що „Богові він догоди́в“.
Mpo na kondima, Enoki amemamaki kino epai ya Nzambe. Boye, atikalaki komona kufa te. Bamonaki ye lisusu te, pamba te Nzambe azwaki ye. Liboso na Enoki konetolama, Makomi etatolaki na tina na ye ete asepelisaki Nzambe.
6 Догоди́ти ж без віри не можна. І той, хто до Бога приходить, мусить вірувати, що Він є, а тим, хто шукає Його, Він дає нагороду.
Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.
7 Вірою Ной, як дістав об'я́влення про те, чого́ ще не бачив, побоявшись, зробив ковчега, щоб дім свій спасти́; нею світ засудив він, і став спадкоє́мцем праведности, що з віри вона.
Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.
8 Вірою Авраа́м, покликаний на місце, яке мав прийняти в спа́дщину, послухався та й пішов, не відаючи, куди йде.
Mpo na kondima, Abrayami atosaki Nzambe oyo abengaki ye mpe atindaki ye kokende na mokili oyo asengelaki kozwa na sima lokola libula. Atosaki mpe akendeki atako ayebaki te epai azalaki kokende.
9 Вірою він перебува́в на Землі Обі́цяній, як на чужій, і проживав у наме́тах з Іса́ком та Яковом, співспадкоє́мцями тієї ж обі́тниці,
Mpo na kondima, avandaki lokola mopaya kati na mokili oyo Nzambe alakaki ye; azalaki kovanda na bandako ya kapo lokola Izaki mpe Jakobi oyo mpe bazwaki elaka ya ndenge moko na ye.
10 бо чекав він міста, що має підва́лини, що Бог його будівни́чий та творе́ць.
Pamba te Abrayami azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko oyo ebukanaka te, engumba oyo Ye moko Nzambe azali Mobongisi mpe Motongi na yango.
11 Вірою й Са́ра сама дістала силу прийняти насіння, і породила понад час свого віку, бо вірним вважала Того, Хто обі́тницю дав.
Mpo na kondima, Sara mpe azwaki makoki ya komema zemi atako mibu na ye ya kobota esilaki koleka wuta kala, pamba te andimaki ete Ye oyo apesaki ye elaka akosaka te.
12 Тому́ й від одно́го, та ще змертвілого, народилось так багато, як зо́рі небесні й пісок незчисле́нний край моря.
Yango wana, wuta na moto oyo akomaki mpaka mpe pene ya kokufa, bato babotamaki ebele penza lokola minzoto ya likolo mpe lokola zelo ya libongo ya ebale, oyo bakoki kutu kotanga te.
13 Усі вони повмирали за вірою, не оде́ржавши обі́тниць, але зда́лека бачили їх, і повітали, і ві́рували в них, та визнавали, що „вони на землі чужани́ці й прихо́дьки“.
Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.
14 Бо ті, що говорять таке, виявляють, що шукають ба́тьківщини.
Bato oyo balobaka ete bazali bapaya mpe baleki nzela kati na mokili batalisaka polele ete bazali koluka mokili na bango.
15 І коли б вони пам'ятали ту, що вийшли з неї, то мали б час повернутись.
Mpe soki bakanisaki mokili oyo batikaki, mbele balingaki kozonga lisusu kuna.
16 Та бажають вони тепер кращої, цебто небесної, тому́ й Бог не соро́миться їх, щоб звати Себе їхнім Богом, бо Він приготува́в їм місто.
Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.
17 Вірою Авраа́м, випробо́вуваний, привів на жертву Ісака, і, мавши обі́тницю, приніс одноро́дженого,
Mpo na kondima, Abrayami akabaki Izaki lokola mbeka tango Nzambe amekaki ye motema; amilengelaki mpo na kokaba mwana na ye wana kaka moko, atako azalaki na elaka.
18 що йому було сказано: „В Ісакові буде насіння тобі“.
Nzambe alobaki na ye: « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »
19 Бо він розумі́в, що Бог має силу й воскресити з мертвих, тому й одержав його на проо́браз.
Abrayami azalaki na elikya ete Nzambe azali na makoki ya kosekwisa Izaki longwa na bakufi, yango wana Nzambe azongiselaki ye mwana na ye: yango ezalaki kaka elilingi.
20 Вірою в майбу́тнє поблагословив Іса́к Якова та Іса́ва.
Mpo na kondima, Izaki apambolaki Jakobi mpe Ezawu mpo na lolenge ya bomoi oyo basengelaki kobika na mikolo oyo esengelaki koya.
21 Вірою Яків, умираючи, поблагословив кожного сина Йо́сипового, і „схилився на верх свого́ жезла.“
Mpo na kondima, wana Jakobi akomaki pene ya kokufa, apambolaki mwana moko na moko ya Jozefi mpe agumbamaki na koyekamela songe ya lingenda.
22 Вірою Йо́сип, умираючи, згадав про ви́хід синів Ізра́їлевих та про кості свої запові́в.
Mpo na kondima, wana Jozefi akomaki na suka ya bomoi na ye, asakolaki kobima ya bana ya Isalaele longwa na Ejipito mpe apesaki mitindo na tina na mikuwa na ye.
23 Вірою Мойсе́й, як родився, перехо́вувався батьками своїми три місяці, бо вони бачили, що гарне дитя, і не злякались нака́зу царе́вого.
Mpo na kondima, baboti ya Moyize babombaki mwana na bango, Moyize, sanza misato sima na mbotama na ye, pamba te bamonaki ete azali kitoko mingi mpe babangaki te mobeko ya mokonzi.
24 Вірою Мойсе́й, коли виріс, відрікся зватися сином дочки́ фарао́нової.
Mpo na kondima, wana Moyize akomaki mokolo, aboyaki ete babenga ye « mwana mobali ya mwana mwasi ya Faraon. »
25 Він хотів краще страждати з наро́дом Божим, аніж мати доча́сну гріховну потіху.
Aponaki komona pasi elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela mwa tango moke na bomoi ya masumu;
26 Він наругу Христову вважав за більше багатство, ніж ска́рби єгипетські, бо він озирався на Божу нагороду.
pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.
27 Вірою він покинув Єгипет, не злякавшися гніву царе́вого, бо він був непохитний, як той, хто Невиди́мого бачить.
Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.
28 Вірою справив він Пасху й покро́плення крови, щоб їх не торкнувся той, хто погубив первороджених.
Mpo na kondima, asepelaki feti ya Pasika mpe apesaki mitindo ete bapakola makila na bikuke mpo ete anjelu mobomi aboma te bana mibali ya liboso ya bana ya Isalaele.
29 Вірою вони перейшли Червоне море, немов суходо́лом, на що спокусившись єги́птяни, потопились.
Mpo na kondima, bato ya Isalaele bakatisaki ebale monene ya Barozo lokola nde bazali kotambola na mabele ya kokawuka; kasi tango bato ya Ejipito bamekaki kosala lokola bango, bazindaki.
30 Вірою впали єрихо́нські му́ри по семиденнім обхо́дженні їх.
Mpo na kondima, bamir ya Jeriko ekweyaki tango bana Isalaele batambolaki zingazinga na yango mikolo sambo.
31 Вірою блудни́ця Раха́в не згинула з невірними, коли з миром прийняла́ виві́дувачів.
Mpo na kondima, Raabi, mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te, pamba te ayambaki banongi na boboto.
32 І що ще скажу́? Бо не стане ча́су мені, щоб оповіда́ти про Гедео́на, Вара́ка, Самсо́на, Ефта́я, Дави́да й Самуї́ла та про пророків,
Bongo naloba lisusu nini? Pamba te nakozanga tango soki nabandi koloba na tina na Jedeon, Baraki, Samison, Jefite, Davidi, Samuele mpe basakoli.
33 що вірою ца́рства побива́ли, правду чинили, оде́ржували обі́тниці, пащі левам загороджували,
Mpo na kondima, balongaki bokonzi ebele, batambolisaki makambo na bosembo mpe bamonaki bilaka ya Nzambe kokokisama mpo na bango; bakangaki ata minoko ya bankosi,
34 силу огне́нну гасили, утікали від ві́стря меча, зміцнялись від слабости, хоробрі були́ на війні, оберта́ли в розтіч полки́ чужоземців;
balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.
35 жінки діставали поме́рлих своїх із воскресі́ння; а інші бували скатовані, не прийнявши визво́лення, щоб отримати краще воскресі́ння;
Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.
36 а інші дізнали наруги та рани, а також кайда́ни й в'язниці.
Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko;
37 Камінням побиті бува́ли, допитувані, перепи́лювані, умирали, зару́бані мече́м, тинялися в овечих та ко́зячих шкурах, збідовані, засумовані, витерпілі.
bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi:
38 Ті, що світ не вартий був їх, тинялися по пустинях та го́рах, і по печерах та прова́ллях зе́мних.
ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele.
39 І всі вони, одержавши засвідчення вірою, обі́тниці не прийняли́,
Kati na bango nyonso wana, atako Nzambe asepelaki na bango mpo na kondima na bango, moko te azwaki biloko oyo Nzambe alakaki bango.
40 бо Бог передбачив щось краще про нас, — щоб вони не без нас досконалість оде́ржали.
Nzambe asalaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso, pamba te alingaki ete bakoma bato ya kokoka nzela moko na biso.

< До євреїв 11 >