< Вихід 25 >

1 А Господь промовляв до Мойсея, говорячи:
Yawe alobaki na Moyize:
2 „Промовляй до Ізраїлевих синів, і нехай вони ві́зьмуть для Мене прино́шення. Від кожного мужа, що́ дасть добровільно його серце, ві́зьмете прино́шення для Ме́не.
— Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.
3 А оце те прино́шення, що ві́зьмете від них: золото, і срібло, і мідь,
Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango: wolo, palata mpe bronze,
4 і блаки́ть, і пу́рпур, і че́рвень, і віссо́н, і кози́на вовна,
bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,
5 і шкурки́ бара́нячі, начервоно пофарбо́вані, і шкурки тахаше́ві, і дерево ака́цій,
baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, banzete ya akasia,
6 олива на осві́тлення, пахощі до оливи нама́щення, і пахощі для кади́ла,
mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko;
7 і камі́ння оніксове, і каміння на опра́ву до ефо́ду й до нагру́дника.
mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.
8 І нехай збудують Мені святиню, — і перебува́тиму серед них.
Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.
9 Як усе, що Я покажу́ тобі — будо́ву скинії та будову рече́й її, — і так зро́бите.
Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.
10 І зроблять вони ковче́га з акаці́йного дерева, — два лі́кті й пів довжина́ його, і лі́коть і пів ширина́ його, і лікоть і пів вишина його.
Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano.
11 І пообкладаєш його щирим золотом зсере́дини та іззо́вні. І зробиш вінця́ золотого навко́ло над ним.
Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo.
12 І виллєш для нього чотири золоті каблу́чки, і даси на чотирьох кутах його, — дві каблу́чки на одному боці його, і дві каблучки на другому боці його.
Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei: mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
13 І поробиш держаки́ з акаційного дерева, і пообкладаєш їх золотом.
Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.
14 І повсо́вуєш ці держаки́ в каблу́чки на боках ковче́гу, щоб ними носити ковче́га.
Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango.
15 В ковче́гових каблу́чках будуть ці держаки́; не відступлять вони від нього.
Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku: bakolongola yango te.
16 І покладеш до ковче́гу те свідо́цтво, що Я тобі дам.
Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.
17 І зробиш ві́ко зо щирого золота, — два лікті й пів довжина́ його, і лікоть і пів ширина́ його.
Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
18 І зробиш два золоті херуви́ми, — роботою кутою зробиш їх з обох кі́нців віка.
Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
19 І зроби одного херувима з кінця́ звідси, а одного херувима з кінця́ звідти. Від того ві́ка поробите тих херувимів на обох кі́нцях його.
Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
20 І будуть ті херувими простягати кри́ла догори́, і заті́нювати своїми кри́льми над віком, а їхні обличчя — одне до о́дного; до віка будуть обличчя тих херувимів.
Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku.
21 І покладеш те віко згори́ на ковче́га, а до цього ковчега покладеш свідо́цтво, яке Я тобі дам.
Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.
22 І Я буду тобі відкриватися там, і буду говорити з тобою з-над віка з-посеред обох херувимів, що над ковче́гом свідо́цтва, про все, що розповім тобі для синів Ізраїлевих.
Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.
23 І зробиш стола з акаційного дерева, — два лікті довжина́ його, і лікоть ширина́ його, і лікоть і пів вишина́ його.
Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
24 І пообкладаєш його щирим золотом, і зробиш вінця́ золотого для нього навко́ло.
Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango.
25 І ли́штву зробиш для нього в долоню навко́ло, і зробиш вінця́ золотого навко́ло, — для ли́штви його.
Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango.
26 І зробиш для нього чотири каблу́чки із золота, та й даси ці каблучки на чотирьох кінцях, що при його чотирьох ніжках.
Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali.
27 Навпроти лиштви будуть ці каблучки, на вклада́ння для держакі́в, щоб носити стола.
Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku.
28 І поробиш ті держаки́ з акаційного дерева, і пообкладаєш їх золотом, і на них бу́дуть носити стола.
Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo.
29 І поро́биш миски́ його, і кади́льниці його, і чаші його та кухлі його, щоб ними лити, — зо щирого золота їх ти поро́биш.
Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
30 А на столі покладеш хліб показни́й, що за́вжди перед Моїм лицем.
Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.
31 І зробиш свічника́ зо щирого золота, — роботою кутою нехай буде зро́блено цього свічника. Стовп його, і раме́на його, ке́лихи його, ґудзі його й квітки́ його — будуть із нього.
Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.
32 І шість раме́н вихо́дитимуть із боків його, — три рамені свічника з одно́го боку його, і три рамені свічника з другого боку його.
Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba: misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
33 Три ке́лихи мигдалоподібні в однім рамені, ґудзь і квітка, і три мигдалоподібні келихи в рамені другім, ґудзь і квітка. Так на шости раме́нах, що виходять із свічника.
Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
34 А на стовпі свічника чотири келихи мигдалоподібні, ґудзі його та квітки́ його.
Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
35 І ґудзь під двома раме́нами з нього, і ґудзь під іншими двома раме́нами з нього, і ґудзь під третіми двома раменами з нього, — у шости рамен, що виходять із свічника.
Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
36 Їхні ґудзі та їхні раме́на нехай будуть із нього. Увесь він — одне куття́ щирого золота.
Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
37 І зробиш сім лямпа́док до нього, і нехай засвітять його лямпадки, і нехай він світить на передню сторону його.
Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo.
38 А його щи́пчики та його лопа́тки на ву́гіль — щире золото.
Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu.
39 З тала́нту щирого золота зробиш його та ввесь цей по́суд.
Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
40 І диви́сь, і зроби за тим зразко́м, що тобі показувано на горі.
Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.

< Вихід 25 >