< 2 до солунян 3 >

1 Наостанку, моліться, бра́ття, за нас, щоб ши́рилось Слово Господнє та сла́вилось, як і в вас,
Bandeko, bobondelaka mpo na biso na tina na makambo mosusu, mpo ete Liloba na Nkolo epanzana noki mpe epesamela lokumu ndenge ezalaki kozwa lokumu epai na bino.
2 і щоб ми ви́зволилися від злих та лукавих людей, бо віра — не в усіх.
Bobondelaka mpe mpo ete Nzambe akangola biso wuta na maboko ya bato mabe mpe ya batomboki, pamba te bato nyonso bazali na kondima te.
3 І вірний Господь, що зміцнить вас і збереже від лукавого.
Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.
4 А про вас покладаємо надію на Господа, що й чините ви, і чинити бу́дете те, що наказуємо вам.
Tondimisami kati na Nkolo ete bozali kosala mpe bokokoba kosala makambo nyonso oyo tozali kotinda bino.
5 Госпо́дь же нехай серця ваші спряму́є на Божу любов та терпеливість Христову!
Tika ete Nkolo akamba mitema na bino kino na bolingo ya Nzambe mpe na molende ya Klisto!
6 А ми вам наказуємо, браття, Ім'я́м Господа Ісуса Христа, щоб ви цура́лися кожного брата, що живе по-леда́чому, а не за переда́нням, яке прийняли́ ви від нас.
Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.
7 Самі бо ви знаєте, як належить наслідувати нас. Бо ми поміж вами не си́дні справля́ли,
Pamba te boyebi bino moko ndenge nini bosengeli kolanda ndakisa na biso. Tango tozalaki elongo na bino, tozalaki bagoyigoyi te
8 і хліба не їли ні в ко́го даремно, але в перевто́мі й напру́женні день і ніч працювали, щоб не бути ніко́му із вас тягаре́м,
mpe toliaki epai ya moto moko te bilei ya ofele; kasi tozalaki, butu mpe moyi, kosala mosala ya makasi mpe ya pasi, mpo ete topesa mokumba na biso epai ya moto moko te kati na bino.
9 не тому́, щоб ми вла́ди не мали, але щоб себе за взірця́ дати вам, щоб нас ви наслідували.
Nzokande elingi koloba te ete tozangaki makoki mpo na lisungi ya ndenge wana, kasi tosalaki bongo mpo ete tokoma ndakisa mpo na bino.
10 Бо коли ми в вас перебува́ли, то це вам наказували, що як хто працювати не хоче, — нехай той не їсть!
Pamba te, ezala tango tozalaki elongo na bino, topesaki bino mobeko oyo: « Tika ete moto oyo aboyi kosala mosala alia mpe te! »
11 Бо ми чуємо, що дехто між вами живуть по-леда́чому, — нічого не роблять, а тільки вдають, ніби роблять.
Tozali koyoka ete mingi kati na bino bazali bagoyigoyi mpe bazali kotambola na bomoi ya mobulu, bazali kosala eloko moko te, kasi bazali kaka kokota na makambo ya bato mosusu.
12 Таким ми наказуємо та благаємо Господом нашим Ісусом Христом, щоб мо́вчки вони працювали та власний хліб їли.
Tozali kokomela bato ya lolenge wana malako mpe kosenga na bango, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto, ete basala mosala na kimia mpe balia bilei oyo bakozwa na motoki na bango moko.
13 А ви, бра́ття, не вто́млюйтеся, коли чините добре.
Kasi mpo na bino bandeko, bolemba te kosala bolamu.
14 Коли ж хто не послухає нашого слова через цього листа, заува́жте того, і не майте з ним зносин, щоб він був посоромлений.
Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.
15 Та не майте його за неприятеля, а навчайте, як брата.
Bozwa ye lokola monguna te, kasi bopamela ye lokola ndeko.
16 А Сам Госпо́дь миру нехай за́вжди дасть вам мир усяким способом. Госпо́дь з вами всіма́!
Tika ete Ye moko Nkolo na kimia apesaka bino kimia tango nyonso mpe na lolenge nyonso! Tika ete Nkolo azala elongo na bino nyonso!
17 Привіт вам моєю рукою Павловою, — це править за знака в усякім листі. Так пишу́ я.
Ngai Polo, nakomi mbote oyo na nzela ya loboko na ngai moko; yango nde ezali elembo kati na mikanda na ngai nyonso. Nakomaka nde bongo.
18 Благодать Господа нашого Ісуса Христа нехай буде з вами всіма́! Амі́нь.
Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino nyonso!

< 2 до солунян 3 >