< До римлян 10 >

1 Браттє, бажаннє мого сердя і молитва (йде) до Бога за Ізраїля про спасеннє.
Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai ya Nzambe ezali ete bana ya Isalaele babika.
2 Сьвідкую бо їм, що ревність Божу мають, та не по розуму.
Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.
3 Не розуміючи бо праведності Божої, і шукаючи свою праведність поставити, праведності Божій не корили ся.
Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
4 Кінець бо закону - Христос, на праведність кожному віруючому.
Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete moto nyonso oyo akondima akoma moto ya sembo.
5 Мойеей пише про праведність, що від закону; що которий чоловік робити ме се, жити ме ним.
Tala ndenge nini Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na Mobeko: « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
6 А та, що од віри, праведність, так говорить: Не кажи в серці твоїм: Хто зійде на небо? (се єсть: Христа звести додолу; )
Kasi tala ndenge nini bosembo oyo ewutaka na kondima elobaka: « Komilobela te kati na motema na yo: ‹ Nani akomata kuna na Likolo? › Ezali lokola kokitisa Klisto wuta na Likolo
7 або: Хто зійде в безодню? (се єсть: Христа з мертвих угору звести.) (Abyssos g12)
to mpe: ‹ Nani akokita kati na libulu monene mpe ya molili makasi? › Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi. » (Abyssos g12)
8 А що ж глаголе (писаннє)? Близько тебе слово в устах твоїх і в серцї твоїм, се єсть слово віри, що ми проповідуємо;
Boye, elobaka penza nini? « Liloba ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo. » Liloba yango nde ezali Liloba ya kondima, mpe yango nde tozali kotatola.
9 щоб, коли визнавати меш устами твоїми Господа Ісуса, і вірувати меш в серцї твоїм, що Бог Його підняв з мертвих, ти спас ся.
Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, okobika;
10 Серцем бо віруєть ся на праведність, устами ж визнаєть ся на спасеннє.
pamba te kondima oyo ekomisaka sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ememaka na lobiko ebimaka nde na monoko.
11 Глаголе бо писаннє: Всяк, хто вірує в Него, не осоромить ся.
Makomi eloba: « Moto nyonso oyo andimelaka Ye akotikala koyokisama soni te. »
12 Бо нема ріжницї між Жидовином і Греком; Він бо Господь усіх, богатий для всїх, хто призиває Його.
Boye, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe Mogreki, pamba te bango nyonso bazali na Nkolo moko oyo apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye.
13 Всяк бо, хто призове імя Господнє, спасеть ся.
Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.
14 Як же призивати муть Того, в кого не увірували? як же вірувати муть, про кого не чули, як же чути муть без проповідаючого?
Kasi ndenge nini bakoki solo kobelela Ye soki bandimeli Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye soki bayoki nanu sango na Ye te? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye soki moto ateyi bango te?
15 А як же проповідати муть коли не будуть послані? яко ж писано: Що за красні ноги благовіствуючих впокій, благовіствуючих про добре?
Mpe ndenge nini bakoki koteya soki batindami te? Kolanda ndenge ekomama: « Tala ndenge ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu! »
16 Та не всї послухали благовістя. Ісаїя бо глаголе: Господи, хто увірував голосу нашому?
Kasi bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te Ezayi alobaki: « Nkolo, nani andimaki mateya na biso? »
17 Тим же то віра (приходить) через слуханнє, слуханнє ж через слово Боже.
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
18 Тільки ж глаголю: Хиба вони не чули? Нї, по всїй землі бо розійшов ся гомін їх і до кінцїв вселенної глаголи їх.
Natuna nanu: Boni, bayokaki te? Iyo, bayokaki! Pamba te ekomama: « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
19 І ще питаю: Хиба не розумів Ізраїль? Первий Мойсей глаголе: Завдам вам зависти через (тих, що) не (єсть мій) нарід, народом безумним завдам жалю вам.
Natuna lisusu: Bato ya Isalaele basosolaki te? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba: « Nakosala ete boyokela oyo ezali ata ekolo te zuwa, nakosala ete boyoka kanda mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele. »
20 Ісаїя ж зосьміливсь і глаголе: Знайшли мене ті, що не шукали, обявивсь я тим, що не питали про мене.
Mpe Ezayi akomaki kino na koloba: « Namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te, namimonisaki epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai te. »
21 До Їзраїля ж глаголе: Увесь день простягав я руки мої до людей непокірних і суперетних.
Kasi alobaki boye mpo na Isalaele: « Natandaki maboko na Ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazanga botosi mpe bato ya mito makasi. »

< До римлян 10 >