< Від Марка 3 >
1 І ввійшов ізнов у школу; й був там чоловік, що мав суху руку.
Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko.
2 І назирали Його, чи сцїлить його в суботу, щоб обвинуватити Його.
Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.
3 І рече до сухорукого чоловіка: Стань посередині.
Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko: — Telema na liboso ya bato nyonso.
4 І рече до них: Чи годить ся в суботу добро робити, чи зло робити? життє спасати, чи погубляти? Вони ж мовчали.
Atunaki bango: — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba: kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa? Kasi babatelaki kimia.
5 І, позирнувши на них кругом гнівно, жалкуючи над скаменїлостю сердець їх, рехе чоловікові: Простягни руку твою. І простяг, і стала рука його здорова, як і друга.
Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango: — Sembola loboko na yo! Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.
6 І вийшовши Фарисеї, зараз з Iродиянами зробили раду на Него, як Його погубити.
Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
7 Ісус же відійшов з учениками своїми до моря; а великий натовп із Галилеї йшов за Ним, і з Юдеї,
Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda,
8 і з Єрусалиму, й з Ідумеї, і зза Йордану; й ті, що кругом Тира та Сидона, натовп великий, прочувши, скільки Він робив, поприходили до Него.
na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye.
9 І сказав Він ученикам своїм наготовити Йому човна задля народу щоб не тиснулись до Него.
Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te.
10 Многих бо сцїлив, так що видались на Него, щоб приторкнутись до Него, хто з них мав недуги.
Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye.
11 А духи нечисті, як бачили Його то падали ниць перед Ним, і кричали, говорячи: Ти єси Син Божий.
Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga: — Yo ozali solo Mwana na Nzambe!
12 І остро грозив їм, щоб Його не виявляли.
Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye.
13 І вийшов Він на гору, й покликав, кого схотів сам, і поприходили до Него.
Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye.
14 І настановив дванайцятьох, щоб були з Ним, і щоб посилати їх проповідувати,
Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu;
15 і щоб мали силу сцїляти недуги, й виганяти біси.
mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe.
16 І дав Симонові імя Петр;
Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki: Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo; »
17 та Якова Зеведеєвого, та Йоана, брата Якового, й дав їм імена Воанер-гес, що єсть: Сини громові;
Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba: bana ya kake;
18 та Андрея, та Филипа, та Вартоломея, та Маттея, та Тому, та Якова Алфєєвого, та Тадея, та Симона Хананця,
Andre, Filipo, Bartelemi, Matayo, Toma, Jake, mwana mobali ya Alife; Tade, Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote,
19 та Юду Іскариодького, що зрадив Його.
mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu.
20 Входять вони в господу, і знов сходить ся народ, так що не могли анї хлїба з'їсти.
Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia.
21 І прочувши свояки Його, вийшли взяти Його; казали бо, що Він не при собі.
Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba: — Akomi na bokono ya liboma.
22 А письменники, поприходивши з Єрусалиму, казали, що Вельзевула має, і що бісовським князем виганяє біси.
Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki: — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
23 І, покликавши їх, говорив до них приповістями: Як може сатана сатану виганяти?
Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese: — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana?
24 І коли царство проти себе роздїлить ся, не може стояти царство те.
Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.
25 І коли господа проти себе роздїлить ся, не може стояти господа тая.
Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te;
26 І коли сатана устав проти себе, й розділив ся, не може стояти, а копець йому.
mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani.
27 Не може нїхто надоби сильного, ввійшовши в господу його, пожакувати, як перше сильного не звяже; аж тодї господу його пограбить.
Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.
28 Істино глаголю вам: Що всї гріхи відпустять ся синам чоловічим, і хули, якими б вони нї хулили;
Nazali koloba na bino penza ya solo: masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama;
29 хто ж хулити ме на Духа сьвятого, не має прощення во віки, а винен вічного осуду: (aiōn , aiōnios )
kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela. (aiōn , aiōnios )
30 бо казали: Духа нечистого має.
Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba: « Azali na molimo mabe! »
31 Приходять тодї брати й мати його, й стоячи на дворі, послали до Него, кличучи Його.
Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu.
32 І сидїв народ круг Него; кажуть же Йому: Ось мати Твоя і брати Твої на дворі шукають Тебе.
Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye: — Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo. Yesu azongisaki:
33 І, озвавшись до них, рече: Хто се мати моя, або брати мої?
— Nani mama na Ngai? Banani bandeko na Ngai?
34 І, позирнувши кругом по тих, що сидїли коло Него, рече: Оце мати моя, і брати мої!
Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki: — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai!
35 Хто бо чинити ме волю Божу, той брат менї, й сестра моя, і мати.
Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.