< Atemmufoɔ 2 >

1 Na Awurade ɔbɔfoɔ firi Gilgal kɔɔ Bokim de nkra kɔmaa Israelfoɔ sɛ, “Meyii mo firii Misraim, de mo baa asase a mekaa ho ntam sɛ mede bɛma mo agyanom no so. Mekaa sɛ, Meremmu mʼapam a me ne mo ayɛ no so.
Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki: « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki: ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino;
2 Mo fam deɛ ne sɛ, mo ne nnipa a wɔte asase yi so no nnyɛ apam biara na mmom mobɛsɛe wɔn afɔrebukyia nyinaa. Na adɛn enti na moanni me mmaransɛm so?
mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo?
3 Deɛ moayɛ yi enti, merempam nnipa a wɔtete mo asase so no. Wɔbɛyɛ mo nkyɛnmu nkasɛɛ na wɔn anyame nso ayɛ mfidie ama mo.”
Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »
4 Awurade ɔbɔfoɔ kasa wieeɛ no Israelfoɔ no suu denden.
Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi,
5 Enti wɔtoo beaeɛ hɔ edin “Agyaadwotwa”. Na wɔbɔɔ afɔdeɛ wɔ hɔ maa Awurade.
mpe babengaki esika yango Bokimi. Babonzaki kuna bambeka epai na Yawe.
6 Yosua gyaa nkurɔfoɔ no kwan akyi no, mmusuakuo no mu biara kɔfaa nʼagyapadeɛ a wɔde maa no sɛ ne kyɛfa no.
Sima na Jozue kobengana bato, bana ya Isalaele bakendeki kobotola mokili, moto na moto na eteni na ye ya mabele.
7 Na Israelfoɔ no somm Awurade wɔ Yosua ne mpanimfoɔ a wɔanyini sene Yosua a wɔhunuu nneɛma akɛseɛ a Awurade yɛ maa Israel, Yosua nkwa nna nyinaa mu no.
Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi.
8 Afei, Nun babarima Yosua, Awurade ɔsomfoɔ wuiɛ a na wadi mfirinhyia ɔha ne edu.
Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosali na Yawe, akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na zomi ya mbotama.
9 Wɔsiee no wɔ nʼawunya asase a na ɛwɔ Timnat-Heres, Efraim bepɔ asase no a ɛwɔ Gaas bepɔ no atifi fam no.
Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.
10 Saa awoɔ ntoatoasoɔ no akyi no, awoɔ ntoatoasoɔ foforɔ nyiniiɛ a na wɔnnim Awurade, na wɔnkae nneɛma akɛseɛ a wayɛ ama Israel.
Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele.
11 Na Israelfoɔ no yɛɛ deɛ ɛnyɛ wɔ Awurade ani so, na wɔsom Baalim ahoni.
Bongo bana ya Isalaele bakomaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe mpe kosalela banzambe ya Bala.
12 Wɔgyaa Awurade, wɔn agyanom Onyankopɔn a ɔyii wɔn firii Misraim no. Wɔdii anyame foforɔ akyi, somm saa anyame no a ɛyɛ nnipa a wɔatwa wɔn ho ahyia no dea. Na wɔmaa Awurade bo fuiɛ.
Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe,
13 Wɔgyaa Awurade akyi die, kɔsom Baalim ne Astoret ahoni.
pamba te basundolaki Yawe mpo na kosalela banzambe Bala mpe Asitarite.
14 Yei maa Awurade bo fuu Israel, enti ɔde wɔn hyɛɛ afomfafoɔ nsa, ma wɔwiaa wɔn ahodeɛ. Ɔtɔn wɔn maa wɔn atamfoɔ a wɔatwa wɔn ho ahyia, na wɔantumi annyina wɔn ano.
Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango.
15 Ɛberɛ biara a Israelfoɔ bɛkɔ ɔko no, Awurade ko tia wɔn ma wɔdi nkoguo, sɛdeɛ ɔhyɛɛ bɔ no. Enti, wɔn ho hiahiaa wɔn papaapa.
Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.
16 Afei, Awurade pagyaa atemmufoɔ ma wɔbɛgyee Israelfoɔ firi wɔn atamfoɔ nsam.
Yawe abimisaki Bilombe oyo babikisaki bango wuta na maboko ya bato mabe oyo bazalaki kobotola bango biloko na makasi.
17 Nanso, Israelfoɔ no antie atemmufoɔ no. Wɔkɔɔ so de wɔn ho bɔɔ anyame foforɔ, kotoo wɔn. Wɔtwee wɔn ho ntɛm so firii wɔn agyanom a wɔyɛɛ ɔsetie maa Awurade mmaransɛm no kwan so.
Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda: nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te.
18 Ɛberɛ biara a Awurade de ɔtemmufoɔ bi bɛdua Israel so no, na ɔka saa ɔtemmufoɔ no ho na ɔgye nnipa no firi wɔn atamfoɔ no nsam wɔ saa ɔtemmufoɔ no nkwa nna nyinaa mu. Ɛfiri sɛ, Awurade hunuu ne nkurɔfoɔ a wɔredi wɔn nya na wɔrehunu amane no mmɔbɔ.
Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi.
19 Nanso, atemmufoɔ no wuo akyi no, nnipa no sane kɔɔ wɔn bra bɔne no mu a, afei na wɔasɛesɛe sene wɔn a wɔdii wɔn anim ɛkan no. Wɔdii anyame foforɔ akyi. Wɔkotoo wɔn, somm wɔn. Na wɔampɛ sɛ wɔgyae wɔn nnebɔnesɛm ne kɔnseneeɛsɛm no.
Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango.
20 Enti, Awurade bo fuu Israel. Ɔkaa sɛ, “Esiane sɛ saa nnipa yi abu apam a me ne wɔn agyanom yɛeɛ so, na wɔapo me mmaransɛm enti,
Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki: « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai,
21 merempamo aman a Yosua anni wɔn so ansa na ɔrewuo no.
Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa.
22 Meyɛɛ yei de sɔɔ Israel hwɛeɛ sɛ wɔbɛtie Awurade sɛdeɛ wɔn agyanom yɛeɛ no.”
Nakosalela bikolo yango mpo na komeka Isalaele mpe kotala soki bakobatela mpe bakotambola na nzela ya Yawe lokola batata na bango. »
23 Ɛno enti na amma Awurade ampam aman no ntɛm so na wamma Yosua ammɛdi wɔn nyinaa so no.
Yawe akabaki te bikolo yango na maboko ya Jozue, asalaki ete etikala; abenganaki yango te mbala moko.

< Atemmufoɔ 2 >