< 1 Tesalonikafoɔ 3 >

1 Akyire no a yɛhunuu sɛ yɛyɛ ho hwee a ɛnyɛ yie no, yɛyɛɛ yɛn adwene sɛ yɛbɛtena Atene.
Boye lokola tokokaki lisusu kokanga motema te, tomonaki ete ezali malamu mpo na biso kotikala na Ateni.
2 Enti, yɛsomaa yɛn nua Timoteo a yɛne no yɛ Onyankopɔn adwuma no sɛ ɔnkɔka Asɛmpa a ɛfa Kristo ho mfa mmoa, nhyɛ mo gyidie den,
Yango wana totindaki Timote, ndeko na biso mpe moninga ya Nzambe kati na mosala ya kopanza Sango Malamu ya Klisto, mpo ete alendisa bino mpe apesa bino mpiko kati na kondima,
3 sɛdeɛ ɛbɛyɛ a, ɔtaa no enti, mo mu biara mmɔ hu. Mo ara monim sɛ saa ɔtaa no yɛ Onyankopɔn pɛ a wahyehyɛ ama yɛn.
na tina ete moko te kati na bino abungisa kondima likolo ya pasi oyo bozali komona; pamba te bino moko boyebi malamu ete tobongisama mpo na yango.
4 Ɛberɛ a na yɛne mo wɔ hɔ no, yɛdii ɛkan ka kyerɛɛ mo sɛ, wɔbɛtaa yɛn, na sɛdeɛ monim no, saa pɛpɛɛpɛ na aba yi.
Tango tozalaki nanu elongo na bino, toyebisaki bino ete tokokutana na minyoko. Mpe esalemi kaka ndenge wana, ndenge boyebi yango malamu.
5 Yei enti, ɛsiane sɛ na asɛm no hyɛ me so enti, mesomaa Timoteo sɛ ɔmmɛhwehwɛ mo gyidie mu. Mewɔ anidasoɔ sɛ ɔbonsam ansɔ mo anhwɛ amma dwuma yɛadi no nyinaa anyɛ kwa.
Mpo na yango, lokola nakokaki lisusu kokanga motema te, natindaki Timote mpo na koluka koyeba soki bozali kaka kokoba kati na kondima. Nazalaki kobanga ete Satana ameka bino mpe ete mosala na biso ekende pamba.
6 Afei, Timoteo afiri mo nkyɛn aba yɛn nkyɛn abɛka anigyesɛm a ɛfa mo gyidie ne mo dɔ ho asɛm akyerɛ yɛn. Waka akyerɛ yɛn sɛ daa modwene yɛn ho adwene pa na mopɛ sɛ mohunu yɛn sɛdeɛ yɛn nso yɛpɛ sɛ yɛhunu mo no ara pɛ.
Kasi sik’oyo, Timote awuti epai na bino mpe asili kozonga epai na biso, amemeli biso sango ya kitoko na tina na kondima mpe bolingo na bino: ayebisi biso ete bozali tango nyonso na makanisi ya malamu mpo na biso mpe bozali na posa makasi ya komona biso, ndenge biso mpe tozali na posa makasi ya komona bino.
7 Enti, yɛn haw ne yɛn amanehunu no mu no, moahyɛ yɛn nkuran,
Bandeko, sango ya kondima na bino elendisi biso makasi, kati na pasi mpe minyoko nyonso oyo tozali komona;
8 ɛfiri sɛ, sɛ mogyina pintinn wɔ Awurade mu a, na ɛma yɛn nso yɛtumi gyina biribiara ano wɔ yɛn asetena mu.
mpe nzoto na biso eningani sik’oyo na esengo mpo ete botelemi ngwi kati na Nkolo.
9 Ɛsɛ sɛ yɛda Onyankopɔn ase ma mo. Mo enti, yɛda Onyankopɔn ase sɛ moama yɛn ho asɛpɛ yɛn wɔ nʼanim.
Matondi ya ndenge nini tokoki kozongisa epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na esengo nyonso oyo tozali na yango mpo na bino liboso ya Nzambe na biso?
10 Daa awia ne anadwo, yɛfiri yɛn akoma nyinaa mu srɛ no sɛ, ɔmma yɛne mo nhyia na yɛmma mo deɛ ɛhia mo wɔ mo gyidie mu.
Tobondelaka Nzambe na molende nyonso, butu mpe moyi, mpo ete apesa biso nzela ya komona bino lisusu mpe ya kokokisa oyo ezangi kati na kondima na bino.
11 Ɔno ara yɛn Onyankopɔn ne Agya no ankasa ne yɛn Awurade Yesu Kristo nsiesie kwan na yɛmmra mo nkyɛn.
Sik’oyo, tika ete Ye moko Nzambe, Tata na biso, mpe Yesu, Nkolo na biso, bafungolela biso nzela ya koya epai na bino.
12 Awurade mma mo dɔ mu nyɛ den mmoro so wɔ mo ho mo ho ne afoforɔ mu, sɛdeɛ yɛn nso yɛdɔ mo no.
Tika ete Nkolo abakisa mpe afulukisa bolingo kati na bino mpo ete bolinganaka, bamoko na bamosusu, mpe mpo ete bolingaka bato nyonso, ndenge kaka biso mpe tolingaka bino.
13 Mebɔ mpaeɛ sɛ Awurade ne ne nkurɔfoɔ nyinaa ba a, ɔbɛma mo akoma mu ayɛ kronkron a nkekaawa biara nni mu wɔ Agya Onyankopɔn anim.
Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso! Amen!

< 1 Tesalonikafoɔ 3 >