< Adiyisɛm 19 >
1 Eyi akyi no, metee nne bi te sɛ nnipakuw a wɔwɔ ɔsoro teɛ mu se, “Haleluya! Nkwagye ne anuonyam ne tumi wɔ yɛn Nyankopɔn,
Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola: « Aleluya! Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,
2 efisɛ nʼatemmu yɛ nokware, na eye sɛ obuu oguamanfo kɛse a ɔde nʼaguamammɔ asɛe asase no atɛn. Onyankopɔn atwe nʼaso, efisɛ okum nʼasomfo.”
pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »
3 Na afei wɔteɛɛ mu bio se, “Haleluya! Wusiw befi kurow no mu akɔ ɔsoro daa daa.” (aiōn )
Bagangaki na mbala ya mibale: « Aleluya! Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene ezali komata na likolo mpo na libela na libela! » (aiōn )
4 Mpanyimfo aduonu anan ne ateasefo baanan no butubutuu Onyankopɔn a ɔte nʼahengua so no anim som no. Na wɔteɛɛ mu se, “Amen, Haleluya!”
Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki: « Amen! Aleluya! »
5 Afei nne bi fi ahengua no so bae se, “Monkamfo yɛn Nyankopɔn, mo a moyɛ nʼasomfo nyinaa, mo a musuro no, akɛse ne nkumaa!”
Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki: « Bokumisa Nzambe na biso; bino bawumbu na Ye nyonso, bino oyo botosaka Ye, mikolo mpe bana mike! »
6 Afei metee nne bi te sɛ nnipadɔm a ɛte sɛ asuworo ne aprannaa a ɛrepaapae a ɛteɛ mu se, “Haleluya! Yɛn Tumfo Awurade Nyankopɔn di hene.
Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi; ezalaki koganga: « Aleluya! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.
7 Momma yɛn ho nsɛpɛw yɛn na yɛn ani nnye na yɛnhyɛ no anuonyam efisɛ Oguamma no ayeforohyia adu a nʼayeforokunu asiesie ne ho.
Tika ete tosepela, totonda na esengo mpe topesa Ye nkembo! Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki. Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa.
8 Wɔde nwera pa a ani hyerɛn na ani tew maa no sɛ ɔnhyɛ.” (Nwera no kyerɛ ahotefo trenee nneyɛe.)
Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli ye mpo ete alata yango. » Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu.
9 Afei ɔbɔfo no ka kyerɛɛ me se, “Kyerɛw sɛ, Nhyira nka wɔn a wɔato nsa afrɛ wɔn wɔ Oguamma no ayeforohyia anwummere aponto ase.” Ɔka kaa ho se, “Eyi yɛ Onyankopɔn asɛm turodoo.”
Bongo anjelu alobaki na ngai: « Koma: ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate! › » Alobaki lisusu: « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »
10 Mibutuw ne nan ase pɛɛ sɛ mesom no. Nanso ɔka kyerɛɛ me se, “Nyɛ saa, efisɛ meyɛ ɔsomfo te sɛ wo ne wo nuanom a wodi Yesu ho adanse no. Som Onyankopɔn efisɛ nokware a Yesu daa no adi no na ɛhyɛ adiyifo no nkuran.”
Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai: « Kosala bongo te! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. »
11 Afei mihuu sɛ ɔsoro abue a ɔpɔnkɔ fitaa wɔ hɔ. Na nea ɔte ne so no din de “Ɔseadeɛyɛ ne Ɔnokwafo.” Nokware na ogyina so bu atɛn na ɔko ne ko.
Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali: « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo.
12 Nʼaniwa te sɛ ogya a ɛredɛw na ɔhyɛ ahenkyɛw bebree. Na ɔwɔ din bi a wɔakyerɛw agu ne ho, nanso na obiara nnim din no nkyerɛase ka ne ho.
Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi.
13 Na ɔhyɛ atade bi a wɔde anu mogya mu. Na ne din ne “Onyankopɔn Asɛm”
Alati nzambala bazindisa na makila; kombo na Ye ezali: « Liloba na Nzambe. »
14 Ɔsoro asraafo a wɔhyehyɛ nwera fitaa a ani tew a wɔtete apɔnkɔ fitafitaa so dii nʼakyi.
Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto.
15 Afoa a ano yɛ nnam yiye a ɔde bedi aman so no fii nʼanom bae. Dade pema na ɔde bedi wɔn so. Sɛnea wotiatia bobe a ɛwɔ nsakyiamoa mu no so no, saa ara na obetiatia nnipa no so de akyerɛ Onyankopɔn Tumfo no abufuw.
Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
16 Na wɔakyerɛw din agu nʼatade mu ne ne srɛ ho se, Ahene mu Hene ne Awuranom mu Awurade.
Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo: « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. »
17 Afei, mihuu ɔbɔfo bi a ogyina owia mu. Ɔteɛɛ mu guu nnomaa a wɔnam wim nyinaa so se, “Mommra mmehyia mu wɔ Onyankopɔn aponto kɛse no ase.
Bongo namonaki anjelu moko atelemi kati na moyi; azalaki koloba na mongongo makasi epai ya bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi: « Boya, bosangana mpo na feti monene ya Nzambe,
18 Mummedi ahemfo nam ne asafohene nam ne atumfo nam ne apɔnkɔ ne wɔn sotefo nam ne adehye ne nkoa ne akɛse ne nketewa nyinaa nam.”
mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso: bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. »
19 Afei mihuu aboa no ne asase so ahene ne wɔn asraafo a wɔaboa wɔn ho ano rekɔko atia nea ɔte ɔpɔnkɔ no so no ne ne dɔm.
Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye.
20 Wɔkyeree aboa no ne nʼatoro adiyifo a ɔyɛɛ anwonwade maa no no. Saa anwonwade no so na ɔnam daadaa wɔn a wɔde aboa no ahyɛ wɔn agyirae ne wɔn a wɔsom aboa no honi no. Wɔtow aboa no ne atoro adiyifo no anikann guu ogya ɔtare a sufre na na ɛredɛw wɔ mu no mu. (Limnē Pyr )
Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale: nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo. (Limnē Pyr )
21 Wɔde afoa a efi ɔpɔnkɔkafo no anom kunkum wɔn asraafo, na nnomaa no dii wɔn nam sɛnea wobetumi.
Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango.